Abalayama—Akundamaki awa, nzokande azali na bomoi?
Uta bikeke mingi, Bayuda, Bamizilmá, mpe Baklisto bazali kokende na esika oyo.
Okoki komona yango na engumba ya Hébron ya kala, na súdi ya Yelusaleme. Esika yango ebéngami ete Haram el-Khalil mpe Nkunda ya batata na mabota. Ee, oyo endimami na ebele ya bato lokola esika bakundaki batata ya mabota Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo, elongo na basi na bango Sara, Rebeka, mpe Lea.
Omikundolá engebene Biblia ete nsima na kufa na Sara, mwasi na ye molingami, Abalayama asombaki mobénga moko lokola nkunda elongo na mwa mabelé na Makapela, penepene na Hébron. (Genese 23:2-20) Na nsima, Abalayama mpe akundamaki awa, elongo na basangani mosusu ya libota na ye. Bikeke mingi na nsima, zingazinga ya nkunda oyo ya kala, Hérode Monene atongaki ndako moko monene oyo na nsima ebongwamaki mpe eyeisamaki monene na bato oyo bakamataki mboka na bileko bikeseni, kobongoláká yango engebene bindimeli ya losambo na bango mpenza.
Nsima ya kokɔta na kati, okomona ba cénotaphes (monimá to malita ya mpamba) motoba. Oyo elakisami awa na karé moke ezali ya Yisaka, mwana ya Abalayama. Penepene na yango ezali na madusu na nsé, oyo masalelamaki mpo na kokita na nsé na mabelé. Balukiluki bamonaki bandako mike oyo mbala mosusu ezalaki na mikwa mingi ya kala.
Ezali boni mpo na Abalayama? Soki akundamaki kati na mobénga na nsé ya esika oyo, asilaki kofuka kala mpenza, boye te? Bato mingi oyo bakei kotala esika oyo bakondima ete ezali bongo. Nzokande, mosakoli moko oyo alekaki Abalayama alobaki ete na ndimbola mosusu Abalayama azali naino na bomoi. Lolenge nini? Mpe yango ekoki kozala na boyokani nini elongo na kondima na yo?
Tosengi na yo otánga lisoló “Balingami na yo oyo basili kokufa—bazali wapi?” (Lokasa 3) Ezali kolimbola mpo na nini mosakoli wana monene alobaki na ntina na Abalayama ete azali na bomoi; eyano na yango ekoki kozala na motuya monene mpo na yo mpe mpo na libota na yo.