Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/6 nk. 3-4
  • Balingami na yo oyo basili kokufa​—Bazali wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Balingami na yo oyo basili kokufa​—Bazali wapi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Masolo mosusu
  • Nini ekómelaka balingami na biso oyo bazali kokufa?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Elikya ya lisekwa ekokokisama!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tózala na kondima mpo na bomoi ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bomoi nsima ya kufa​—⁠Lolenge nini, epai wapi mpe ntango nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/6 nk. 3-4

Balingami na yo oyo basili kokufa​—Bazali wapi?

ALEC abulunganaki mingi. Kati na pɔ́sɔ moko, abungisaki baninga na ye mibale. Moko na bango, Nevil, akufaki na mpota ya masasi. Mosusu, Tony, abomamaki kati na likámá moko ya motuka. Mituna oyo liboso mizalaki kotungisa ye te miyelaki elenge mobali wana ya mibu 14 ya ekólo Afrique du sud. Azalaki komituna, ‘Mpo na nini bato basengeli kokufa? Mpe tokendaka wapi soki tokufi?’

Wana azalaki kokenda na bokundi ya Nevil, Alec azalaki mpenza kolikya ete akozwa biyano na mituna wana. “Kasi,” amikundoli ete, “sángó atángaki bobele makambo kati na búku moko mpe alobaki ete Nevil asili kokende na likoló. Na nsima, pene na kunda alobaki ete tozali kozela lisekwa. Nakómaki na mobulungano. Soki Nevil azalaki na likoló, lolenge nini asengelaki kozela lisekwa?”

Na nsima, bobele na mokolo wana, Alec akendaki na bokundi ya Tony. Milulu ya losambo misalamaki na lokótá oyo azalaki koyoka te. Nzokande, yikiyiki ya baleli mosusu endimisaki Alec ete bazwaki mpenza libɔndisi te. Alimboli ete “Na butu wana, natungisamaki mingi mpenza. Nazangaki nguya mpe nabulunganaki. Moto moko te apesaki biyano oyo bibongi na mituna na ngai. Mpo na mbala ya liboso kati na bomoi na ngai, namitunaki soki Nzambe azali.”

Mbula na mbula bamilió na bato, lokola Alec, bazali kobungisa balingami na bango kati na kufa. Búku 1992 Britannica Book of the Year, elimboli ete, “na mokili mobimba bato 50 418 000 bakufaki na 1991.” Mpe bamilió boni basili lisusu kokufa? Kanisá bibale ya mpisoli ya baoyo batikali na mawa! Likoló na mawa na bango ebakisami mobulungano mouti na bongolabongola na ntina na kufa.

Na yango, bato mingi lokola Alec, bakómi na mawa mpe bazali na ntembe mpo na koyeba soki ezali na moboko mpo na elikya ya bomoi nsima ya kufa na mikolo mizali koya. Engebene búku Encyclopedia of Religions, “na bileko nyonso, bato ya bwanya bamikabolaki na bibele, . . . bazalaki na ntembe na lolenge oyo molimo ya moto to bomoi bokoki kozala libándá ya bɔɔngɔ́ mpe nzoto ya moto.”

Likambo ya kosepelisa, búku monene oyo etángami awa na likoló endimi ete mateya ya lingomba na ntina na kozala na molimo libándá ya nzoto endimami kati na Biblia te. Ezali solo ete, na mwa bisika Biblia elobeli “molimo” ya moto lokola mozali kotika to ata kozonga lisusu kati na nzoto, kasi na bisika wana “molimo” mosalelami na ndimbola ya “bomoi,” oyo ebungisami to ezongisami. (Genese 35:16-19; 1 Mikonzi 17:17-23) Mbala mingi, liloba “molimo” esalelami kati na Biblia mpo na kolobela bikelamu ya mosuni mpe ya makila, ee, bikelamu ya bomoi. (Genese 1:20; 2:7) Na yango, Biblia ezali mbala na mbala koyebisa ete milimo mikufaka. (Ezekiele 18:4, 20; Misala 3:23; Emoniseli 16:3) Liloba ya Nzambe lizali koloba ete soki milimo mikufi, “miyebi likambo tɛ.”​—Mosakoli 9:5, 10.

Epai mosusu, Biblia ezali na masoló ya kozongisama na bomoi ya bato oyo bakufaki. Mpo na Lasalo, yango esalamaki nsima ya mikolo minei kati na kufa. (Yoane 11:39, 43, 44) Bongo, ezali boni mpo na bato oyo bakufaki esili koleka mibu nkáma to nkóto mingi? Elikya na bango mpo na bomoi na mikolo mizali koya ezali kosɛnga ete Nzambe asekwisa nzoto bobele moko oyo bazalaki na yango ntango bakufaki?

Te. Likanisi motindo yango liyokani te na oyo ekómaka na batɔ́mi oyo nzoto ya mokufi etongamaki na yango. Nsima ya ntango, batɔ́mi wana ekokamatama na bitwɛlɛ oyo, bikolyama na bikelamu mosusu mpe batɔ́mi yango ekokóma biteni ya nzoto na bango.

Yango elingi koloba ete elikya moko te ezali mpo na bato oyo bakufaki kala? Ezali bongo te. Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ na biso monene azali na likoki monene ya komikundola, oyo ezangi ndelo. Kati na makanisi na ye oyo ezali ya kokoka, azali na makoki ya kobomba bomoto mpe bizaleli ya mozindo ya mokufi nyonso oyo amoni malamu kokanisela ye. Lisusu, Yehova Nzambe azali na nguya ya kosala lisusu nzoto ya moto elongo na bizaleli ndenge moko oyo moto moko azalaki na yango liboso. Akoki lisusu kotya kati na yango makoki ya komikundwela makambo mpe bomoto na ye oyo akaniseli ye, lokola Abalayama.

Penepene na mibu nkóto mibale nsima ya kufa ya Abalayama, Yesu Klisto apesaki kondimisama oyo: “Nde ete bakufi bakosekwa, Mose mpe atalisi bongo na ndambo na mwa njete, kuna ebiangaki ye [Yehova] ‘Njambe na Abalayama mpe Njambe na Yisaka mpe Njambe na Yakobo.’ Ajali Njambe na bakufi tɛ, kasi na bato na bomoi, mpɔ ete mpɔ na ye [banso, NW] bajali na bomɔi.” (Luka 20:37, 38) Longola Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo, bamilió na bato mosusu oyo bakufá bazali na bomoi kati na makanisi na Nzambe, bazali kozela lisekwa na mikolo mizali koya. Biblia endimisi ete: “Lisekwa ekojala na bato sembo mpe na bato sembo tɛ.” ​—Misala 24:15.

Mwa bapɔ́sɔ nsima ya kozwa mawa, Alec azwaki biyano na mituna na ye. Motatoli ya Yehova moko ayaki na ndako na ye mpe amonisaki ye oyo Liloba ya Nzambe lizali koloba na ntina na liwa mpe lisekwa. Yango ebɔndisaki Alec mpe epesaki ndimbola ya sika kati na bomoi na ye.

Yo mpe okolinga koyeba makambo mingi na ntina na elikya ya lisekwa oyo ezali na moboko kati na Biblia? Na ndakisa, lisekwa ya bato mingi ekosalama na likoló to na mabelé? Mpe moto asengeli kosala nini mpo na kondimama na Nzambe mpe komona kokokisama ya bilaka kitoko na Ye ete bato bakoki kokutana lisusu na balingami na bango oyo basili kokufa?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto