Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/5 lok. 31
  • Atosaki lisosoli na ye oyo liteyamaki na Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Atosaki lisosoli na ye oyo liteyamaki na Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Masolo mosusu
  • Otyelaka lisosoli na yo motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ndenge nini okoki kobatela lisosoli ya malamu?
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Lisosoli na yo eteyami malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Zalá na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/5 lok. 31

Masoló ya Basakoli na Bokonzi

Atosaki lisosoli na ye oyo liteyamaki na Biblia

DAVIDI, mokonzi ya Yisraele abondelaki mpo na kozwa lisalisi ya Yehova, wana alobaki ete: “Ngai nakotambola na [bosembo, NW]; sikola ngai mpe mɔnisa ngai boboto.” (Njembo 26:11) Nzambe andimaki ye mpo ete abatelaki bosembo na ye. Yehova apambolaki mpe Yesu mpo ete asalaki mokano ya Tata na ye ya likoló, mpe apambolaki elenge moko na ekólo Columbia, oyo atosaki lisosoli na ye liteyamaki na Biblia mpe azwaki ekateli ya kosala mokano ya Nzambe. Elenge yango ayebisi ete:

“Wana nabandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova, nazalaki kotánga na eteyelo moko ya katolike. Nzokande, lisosoli na ngai lizalaki kotungisa ngai wana nazalaki koyangana na Misa, bongo nakendaki epai na mokambi ya eteyelo (oyo azalaki sángó), epai na mopesi-toli na banakelasi, mpe epai na mokambi ya etuluku na biso mpe nasɛngaki ete náyanganaka na Misa te. Atako nasɛngaki yango, basusu bamekaki kopusa ngai na makasi ete náyanganaka. Masɛnginya mazalaki sé kobakisama ata nsima wana nazwaki batisimo mpo na kozala Motatoli ya Yehova. Papa na ngai alobaki ete akobengana ngai na ndako soki balongoli ngai na eteyelo. Mwango na ye ezalaki ete nákɔta na eteyelo monene mpe nálanda mosala moko mpo na bomoi mobimba.

“Mokambi ya eteyelo azongelaki makebisi mbala na mbala mpo na baoyo batikaki kolanda masɛngami ya katolike. Ntango Misa ya yambo ya mobu ekómaki, nakendaki kobombama kino na nsuka na yango. Na nsima, napesaki molakisi (sángó) mwa-búku L’école et les Témoins de Jéhovah mpe nalobaki na ye ete lokola nazali Motatoli ya Yehova, nakokaki te koyangana na Misa. Alobaki ete: ‘Bandá koluka eteyelo mosusu.’ Nayebaki ete tata na ngai akobengana ngai na ndako soki nalongwi na eteyelo. Atako bongo, nabondelaki Yehova mpe nalandaki kopesa litatoli epai na baninga na ngai ya kelasi.

“Eleko ya lɔi ekoki. Bongo, na bozongi na eteyelo nsima ya lɔi, ezalaki lisusu ngonga ya Misa. Mokambi ya eteyelo mpe basángó mosusu bazalaki pembeni ya ndakonzambe, bazalaki komilɛngɛla mpo na koyoka boyamboli masumu. Nabimaki te mpo na kobanga. Naingelaki mpe nafandaki, kasi lisosoli na ngai litungisaki ngai. Ntango nzembo ebandaki, nakanisi ete, ‘Eloko nini nazali kosala awa? Yehova azali Nzambe na ngai. Nakoki kobanga te mpe nakoki koangana ye te. Nakoki kotika ye te. Nakosundola ye te.’ Nabondelaki na mpiko nyonso. Na nsima, nabimaki ndakonzambe mpe natɛlɛmaki na molɔngɔ́ ya boyamboli masumu. Ntango nakendeki epai na mokambi ya eteyelo, nalobaki na ye ete: ‘Molakisi, nayei mpo na koyambola masumu te.’ Alobaki ete: ‘Ngai mpe nakanisaki bongo.’ Nalobaki na ye ete nandimaki bampasi oyo esengelaki koya; lisosoli na ngai epesaki ngai nzela te ete násangana na Misa. Nakokaki te koboya kotosa makambo oyo nayekolaki na Biblia.

“Atalaki ngai, amemotaki, mpe alobaki ete: ‘Nazali kosepela na yo. Bino Batatoli nyonso bobongi na kondimama. Mpo na yo, Nzambe azali liboso, mpe omilɛngɛli mpo na kotosa mibeko na ye ata soki yango ekobimisa likambo nini. Landá kosala bongo. Ozali mpenza kosala malamu. Nakosɛngisa bakatolike nyonso ete bázala lokola yo, komonisáká molende, bolingo motindo wana mpo na Nzambe. Kobanda sikawa, okasangana lisusu te kati na losambo na biso.’ Nazalaki na esengo monene! Yehova apambolaki ekateli na ngai ya kotosa lisosoli na ngai liteyamaki na Biblia.

“Na mokolo molandaki, mokambi ya eteyelo alobaki epai na bayekoli nyonso ete: ‘Mangomba mosusu maleki biso. Mpo na nini tozali lokola bango te, na molende, na bolingo mozindo mpo na Nzambe mpe na mposa ya kosalela ye koleka nyonso mosusu? Yango ezali likambo oyo lisengelaki kozala kati na mitema na biso.’

“Na nsuka, mokambi ya eteyelo atindamaki na Loma, mpe mokambi ya sika na eteyelo ayebaki te ete nasengelaki kosangana na losambo te. Tata na ngai mpe alongwaki na ndako, nazwaki bonsomi ya kokokisa mokano na ngai ya kokóla kati na mosala ya ntango nyonso.”

Yehova apambolaki elenge wana oyo atosaki lisosoli na ye oyo liteyamaki na Biblia. Bobele bongo, akopambola baoyo nyonso bazali koluka kosala mokano na Ye.​—Masese 3:5, 6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto