“Tiká tótánga naino yango liboso ya kosɛka”
WANA ezali maloba ya mobali moko ya mboka Nouvelle Zélande na ntina na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, zulunalo oyo ozali kotanga. Nsima ya kotanga lisoló na ntina na likalo ya Nzambe na likoló, oyo emonisami na Ezekiele mokapo 1, mobali yango akomaki ete:
“Moko na moko ya bikelamu wana ya bomoi minei, to bakeluba, azalaki na mapapu minei mpe na bilongi minei. Bazalaki na elongi ya nkosi oyo elakisi boyengebene ya Yehova; elongi ya ngombe mobali oyo elakisi nguya ya Nzambe; elongi ya mpongo, oyo ezali kolimbola bwanya na ye; mpe elongi ya moto, oyo ezali komonisa bolingo ya Yehova.
“Nsima na kotanga yango mbala na mbala, nakómaki na mayoki ya esengo kati na motema na ngai. Mpisoli ebandaki kokita na miso na ngai, mpo na esengo. Makanisi ya liboso oyo mayelaki ngai mazalaki ete: ‘Yehova, ozali mpenza kitoko mpe na kosepelisa!’ Nakamwi mingi na ntina na ngai moko mpo na mayoki wana ya sika epai na Yehova Nzambe, oyo nasɛkaki na boumeli ya mibu mingi, na motindo na ngai ya moto ya mokili. Nazali koloba ete: ‘Matɔ́ndi’ mpo na Batatoli ya Yehova, mpe mpo na bato mosusu mingi oyo bazali lokola ngai, nazali koloba ete: ‘Tiká tótánga naino yango liboso ya kosɛka.’”