Lokola nzeté
“MALOBA ya ntɔ́ki mabimisamaka na bato ya bolema lokola ngai, kasi bobele Nzambe nde akoki kosala nzeté.” Wana azalaki kokumisa mitindo mikeseni ya makambo ya kokamwa ya nzeté, mokomi ya ntɔ́ki Joyce Kilmer amonisaki ete Nzambe nde azalisaki yango.
Jéhovah Nzambe asalaki mitindo nyonso ya nzeté, oyo ekeseni na bonzenga mpe na ntina na yango. Ezala ya mike to ya minene mpenza, nyonso ekoki kozala kitoko na boye ete tozangi maloba ya kolimbola yango. Lisusu, nzeté ezali kopesa bilei, nkoni mpe malili. Mpe bato na mayele bazali naino kokundola mitindo ya sika ya kosalela nzeté.
Kati na Biblia, nzeté esalelami mbala mingi mpo na komonisa na maloba ya elilingi, bikonzi, bayangeli mpe bato. (Ezekiele 31:1-18; Danyele 4:10-26) Nzeté elobelamaka na boyokani na esengo, na kimya mpe bolamu oyo euti na bokonzi ya Jéhovah mpe na kobongisama ya libota na ye. (1 Ntango 16:33; Yisaya 55:12; Ezekiele 34:27; 36:30) Makomami mazali lisusu kopesa elaka ete mikolo na bato na Nzambe mikozala lokola mikolo ya nzeté. (Yisaya 65:22) Likambo yango lizali na ntina mingi soki tokanisi ete nzeté mosusu eumelaka bikeke mingi.
Mokomi moko ya Nzembo alobaki ete moto oyo azali kosepela mingi na Mibeko na Nzambe “azali lokola nzeté oyo ekonami penepene na maziba ya mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekokauka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.” Nzeté monene oyo ekonami penepene ya maziba ya mai ezalaki kokundwela mokomi ya Nzembo bozwi ya elimo ya moto oyo “esengo na ye ezali kati na Mibeko na Jéhovah.” (Nzembo 1:1-3) Soki ozali solo kosepela na Mibeko na Nzambe mpe na Liloba na ye mosantu, mikolo na yo mikozala lokola mikolo na nzeté. Ya solo, na kosaláká na boyokani ya boyebi ya sikisiki ya Jéhovah Nzambe mpe ya Yesu Klisto, okoki nkutu kozala na elikya ya bomoi ya seko.—Yoane 17:3.