Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/11 lok. 32
  • Ntango ya kobuka mbuma!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango ya kobuka mbuma!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/11 lok. 32

Ntango ya kobuka mbuma!

MPO na nini lisoló ya “boklisto” etondi mpenza na makambo oyo mazali ya boklisto te? Bato mingi oyo bayebi kokanisa bazali komituna motuna oyo, kasi Yesu ayanolaki na yango, kati na lisese moko, esili sikawa kokoka penepene na mibu 2 000. Alobelaki “moto moko oyo alónaki nkóna malamu kati na elanga na ye.” Na nsima, “moyini na ye ayaki mpe akonaki matiti mabe kati na blé.” Ntango nkóna ebimaki, baombo bamonaki matiti mabe mpe balingaki kolongola yango. Kasi, moto yango alobaki ete: “Tika nyonso mibale kokóla kino ntango na kobuka mbuma.” Na ntango na kobuka mbuma, blé esengelaki kokabwana na matiti mabe.​—Matai 13:24-30.

Yesu alobaki, wana azalaki kolimbola lisese, ete ye nde moto oyo akónaki “nkóna malamu”​—baklisto ya solo. Moyini ye Satana, oyo akónaki “matiti mabe” kati na mbuma malamu: asalaki ete baklisto ya lokuta bamikotisa kati na lisangá. Yesu apesaki nzela ete baklisto ya solo mpe baklisto ya lokuta bazala esika moko, kasi kino ntango ya kobuka mbuma. Na nsima, basengelaki kokabwana.​—Matai 24:36-44.

Tozali bongo kokamwa te na koyoka ete na boumeli ya bikeke mingi masangá oyo mabengami ete “ya boklisto” mayokisaki Nzambe nsoni wana mandimaki mateya ya bopakano, makangaki miso likoló na etamboli ya mbindo, mapesaki mabɔkɔ na bitumba, mpe mabongisaki esambiselo mabe ebéngami ete Inquisition. Tozali komona kati na yango matiti mabe oyo Satana akónaki. Kasi, ntango tozali kotanga ete bato mosusu banyokwamaki na boloko mpe na kufa na esika ya kobuka mitinda ya sembo ya Biblia, tozali kososola ete nkóna malamu ebungaki te.

Yesu alobaki ete ntango ya kobuka mbuma ezali “nsuka na ekeke.” Mpo ete tozali kobika na nsuka ya ebongiseli ya mokili oyo, esengeli kozala ntango ya kobuka mbuma! Na yango, bokabwani esalemaki mpenza kati na baklisto ya solo mpe baklisto ya lokuta. Lelo oyo, esengeli kozala na libota moko, bobele te mwa bato bapalangani bipai na bipai, kasi libota oyo likokani na maloba na Yesu matali baklisto ya solo​—bato oyo bazali kotosa Bokonzi na Nzambe mpe bazali kosakola nsango malamu na ntina na yango, oyo bazali kokangama na mitinda ya bizaleli malamu oyo esengami na Biblia mpe bazali kobwaka mateya ya bopakano mpo na kokangama na solo ya Biblia, oyo bazali komonisa nkombo ya Nzambe mpe basangani na mokili te.​—Matai 6:33; 24:14; Yoane 3:20; 8:32; 17:6, 16.

Tozali kondimisa yo ete libota motindo yango lizali! Olingi kosalela Nzambe na lolenge oyo ekosepelisa ye? Boye, luka libota yango, mpe salela Nzambe elongo na libota yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto