Bazali kopesa motuya mingi na likambo litali kozongisa makila?
Minganga ya ntango na biso bazali kosalela mingi kozongisa makila, kasi yango ezali mpenza na ntina mingi lokola bazali kokanisa? Okanisi nini?
Kati na zulunalo American Journal of Medicine ya Février 1993, monganga Craig S. Kitchens atunaki motuna oyo: “Bazali kopesa motuya mingi na likambo litali kozongisa makila?” Amonisaki ete mbala mingi minganga batalelaka matomba mpe mikakatano ya myango ya kosalisa bato. Ezali boni mpo na kozongisa makila?
Monganga Kitchens apesaki bilembeteli ya sika ya makámá oyo mazali kobima na kozongisa makila, lokola kozwa bokono ya hépatite, kobebisama ya makoki ya nzoto mpo na kobundisa bokono, kobebisama ya binama mosusu kati na nzoto mpe kobwakama ya misuni oyo babakisaka na nzoto likoló ya loposo na ntango ya lipaso. Boyekoli moko, oyo elobelaki “ebele ya mikakatano” miuti na kozongisa makila, “ekómaki na bosukisi oyo ete kozongisama nyonso ya makila ezali na 20% ya makoki ya kobimisa makambo mabe, oyo ekoki kozala na makámá monene to ya moke,” ekoki ata koboma.
Nzokande, oyo bazali kobenga ete matomba, ezali na ntina liboso na makámá lolenge yango?
Monganga Kitchens atalelaki boyekoli 16 etali lipaso ya ba Témoins de Jéhovah 1 404, baoyo baboyaki kozongisa makila, engebene mobeko ya Biblia oyo esengi ‘koboya makila.’—Misala 15:28, 29.
Akómaki na bosukisi nini? “Likatami ya ba Témoins de Jéhovah ya koboya makila wana basengeli kosala bango lipaso monene esali lokola kobakisa likámá ya kufa longwa na 0,5% kino 1,5%. Ezali mpenza petee te komeka koyeba na meko nini kozanga kosalela makila ezali kokitisa motuya ya bamaladi mpe ya kufa, kasi emonani mpenza ete matomba yango maleki makámá oyo makoki kozwama na koboya kozongisa makila.” Alingaki koloba nini? Ete makámá ya koboya makila mamonani ete mazali moke koleka oyo ya kondima kozongisa makila.
Monganga Kitchens abimisi motuna oyo ya ntina: “Soki kopasola ba Témoins de Jéhovah kozanga kozongisa makila ezali kobebisa te kolongono ya nzoto ya mobɛli mpe ezali kopengola kobimisa mosolo mingi mpe makámá ya mikakatano ya ntango molai, tosengeli te kokitisa likambo ya kozongisa makila?”
Bato oyo bazali koboya kozongisa makila mpo na bantina wana, bazali kosala engebene toli ya Mozalisi na biso.