Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/5 lok. 32
  • Motuya boni okoki kopesa mpo na yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Motuya boni okoki kopesa mpo na yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/5 lok. 32

Motuya boni okoki kopesa mpo na yango?

Oyebi eloko moko oyo ezali na motuya mingi oyo okondima kobungisa nyonso ozali na yango mpo na kozwa yango? Ezalaki likambo oyo Yesu asalaki, mpe alobelaki yango na bayekoli na ye.

Alobaki ete: “Bokonzi na likolo ezali lokola motekisi oyo azali koluka mangaliti kitoko. Ezwi ye mangaliti moko na motuya monene, akei mpe atekisi nyonso ezalaki na ye mpe asombi yango.”​—Matai 13:45, 46.

Motekisi wana andimaki kobungisa nyonso mpo na kozwa “mangaliti,” Bokonzi na Nzambe. Mpo na nini? Mpo ete ezalaki na eloko moko te na mokili oyo ekokani na yango. Bokonzi na Nzambe ekosilisa makambo oyo moto azalaki te na likoki ya kosilisa, na ndakisa, bitumba, nzala, mobulu mpe minyoko. (Nzembo 72:4-8, 13, 14) Na nse na Bokonzi, ata masumu, maladi mpe liwa ekozala lisusu te. (Emoniseli 21:4, 5) Likambo ya kokamwa ezali te soki lisengi ya mibale na Libondeli ya Nkolo (“Tata na Biso”) ezali oyo ete: “Tika bokonzi na yo eya!”​—Matai 6:9, 10.

Motuya boni okopesa mpo ete ozwa mapamboli ya Bokonzi? Ya solo, mapamboli yango mazali kopesama mpamba. Kasi mpo na kozwa litomba na yango, osengeli koyeba mpenza Bokonzi, kondima ete yango ezali solo, mpe kopesa yango esika ya liboso kati na bomoi na yo. Okokoka kosala yango? Biblia ezali na mateya oyo makoki kosalisa yo mingi. Mpo na nini te kopesa nzela na ba Témoins de Jéhovah ete basalisa yo na koyeba Bokonzi na Nzambe mpe koyeba lolenge nini yango ekoki kopesa yo litomba uta sikawa?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto