Bazali kosakola avenir ya nkita na mokili
ENGEBENE zulunalo Accountancy Age ya Londres, kotengatenga ya mosolo mpe kozanga kotya motema na bayekoli ya makambo na nkita baoyo na 1987, balongaki te kosakola kokwea ya mosolo esili kotinda bato mingi ya mombongo na komibalola epai na astrologie (kosakola na nzela na myoto) mpo na koluka koyeba avenir ya mosolo na bango. Zulunalo yango eyebisi ete “ba astrologues ya mombongo basili kozwa bakilia mingi ya lokumu, mpo na makambo matali kosakola avenir.”
Moko na ba astrologues yango akokanisi zongazonga ya makambo ya mosolo oyo ataleli na boumeli ya mibu 30 na etambweli ya bitando. Azali kosala bisakweli na ye likoló na moboko yango. Soki, liboso ya 1987 bakilia mingi basepelaki te koyoka ye, nzokande sikawa ata bato ya mombongo baoyo bazali na bokatikati bazali pene ya koyoka ye.
Astrologue mosusu ya mombongo azali kotalela mikolo ya kobotama ya bato mpo na koyeba bizaleli ya bato yango mpo na kososola “ntango oyo ebongi mpo na bokoli malamu ya mosolo.” Ezali na mosusu oyo azali kokanisa ete komata mpe kokita ya motuya ya palata ezali kolanda etambweli ya zolongano na sanza. Ntango amikokanisi na bataleli na makambo ya mosolo oyo bayebani, bakilia na ye bazali kopesa ye “libunga moke.”
Nzokande ezali na kosakolama ya makambo ya mosolo oyo ekomonana sembo kozanga ntembe, mpe ezali na boyokani moko te elongo na astrologie. Kosakolama yango ezali na Biblia mpe epemami na Jéhovah, Nzambe oyo asalaka ata “libunga moke” te. Azali Nzambe oyo “akosaka te.” (Tito 1:2) Alobaki na nzela ya mosakoli na ye Ezekiele ete: “Bakobwaka palata [misolo] na bango na balabala mpe wolo na bango ekokoma eloko ya nsomo. Palata [misolo] to wolo ekokoka kobikisa bango te.”—Ezekiele 7:19
Ekokokana ntango nini? Na boumeli ya “bolozi monene” esakolamaki na Yesu, oyo esili bongo kobelema mpe oyo Ezekiele abyangaki yango “mokolo ya nkele na Jéhovah.” (Matai 24:21; Ezekiele 7:19) Baoyo bakosakolaka avenir na nzela na myoto (astrologues) bakoki koloba makambo mingi, kasi bokoli monene ya mosolo ekoki kobikisa te. Bobele kotya motema epai na Jéhovah Nzambe, Mobikisi Monene, nde ekoki kozwela moto libateli na boumeli ya kokweisama na mokili oyo kati na yango mbeba nyonso, ezala ya politike, ya mangomba to ya mombongo, ekolongolama.—Masese 3:5, 6; Sofoni 2:3; 2 Petelo 2:9.