Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/12 lok. 30
  • Okoki koyanola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki koyanola?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • “Boyeisa ndambo na zomi nyonso kati na ebombelo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Biblia elobi nini mpo na dime?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • “Tosili komona Masiya”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mapamboli na Jéhovah makopesaka bozwi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/12 lok. 30

Okoki koyanola?

Osepelaki kotanga banimero ya sika ya Mosenzeli? Boye, tala soki okoki koyanola na mituna oyo milandi:

▫ Bilembeteli nini ya polele misala ndenge na ndenge ya elimo santu mimonisaki na ekeke ya liboso?

Misala wana mizalaki bilembeteli ya polele ete nsima ya mibu 1 500, lisangá ya Yisraele lizalaki lisusu libala ya Nzambe liponami te, kasi uta ntango yango ngolu na Nzambe ezalaki likoló na lisangá ya sika ya boklisto oyo ebandisamaki na Mwana bobele moko na ye. (Tala Baebele 2:2-4.)​—15/8, lokasa 5.

▫ Mpo na nini bokoli monene ezali komonana kati na ba Témoins de Jéhovah?

Bokoli yango ezali lipamboli liuti na Nzambe. Ezali mosala ya Nzambe. Makambo oyo ba Témoins de Jéhovah bazali koteya kati na mosala na bango ya kopalanganisa nsango malamu ezali na moboko kati na Biblia. Likambo mosusu lipesi nzela na bokoli na mosala na bango ezali ete, na motema moko, bazali kondima ye oyo Nzambe asili kotya lokola Motó ya lisangá ya boklisto, Nkolo Yesu klisto.​—l/9, lokosa 19.

▫ Mpo na nini Jéhovah alimbisaki masumu ya Davidi kati na likambo ya Bataseba?

Ezalaki mpenzampenza mpo na kondimana ya Bokonzi, kasi lisusu mpo na ezalela ya mawa oyo Davidi amonisaki mpe mpo ete abongolaki solo motema na ye. (1 Samwele 24:4-7; 2 Samwele 7:12; 12:13; Nzembo 51:1, 2, 17)​—15/9, nkasa 10, 11.

▫ Wapi mitindo misato ya bilembeteli ya ntina ya Makomami ya Greke ya boklisto bimonisi ete Yesu azalaki mpenza Masiya?

Molongo ya bankoko na Yesu ezali elembeteli ya liboso. (Matai 1:1-16; Luka 3:23-38) Kokokisama ya bisakweli ezali motindo mosusu ya bilembeteli. Ebele na bisakweli, lokola oyo ezali kati na Danyele 9:25, emonisi ete Yesu azalaki Masiya. Motindo ya misala ya elembeteli ezali litatoli ya Nzambe ye moko; amonisaki yango na mabaku misato, alobaki ye moko. (Matai 17:5; Luka 3:21, 22; Yoane 12:28) ​—1/10, nkasa 9-12.

▫ Yesu alingaki komonisa nini ntango alobaki, engebene Matai 24:37 ete: “Lokola ezalaki na mikolo ya Noa, koya ya mwana na moto okozala bango.”

Noa atongaki masuwa mpe akebisaki basali na mabe bambula mingi liboso ete mpela eya mpo na koboma mokili wana mabe. Bobele bongo, koya na Klisto oyo ezangi komonana esengeli koumela bambula mingi liboso ete nsuka eya na kobomama monene.​—1/10, lokasa 16.

▫ Tokoki kosala nini mpo na kozala na boyekoli malamu ya Biblia kati na libota?

Esengeli kosomba ntango ekoki. Kopesa nzela te ete televizyó to misala misusu mizwa esika ya boyekoli. Botalela bamposa oyo etali mpenza libota na bino. Botuna bana makanisi na bango mpo na komona soki bakangi makambo bazali koyekola. (Matai 17:25) Bomeka komonisa ezalela ya esengo. Esengeli komonisa mɔ́tɔ, mpe bosolo ete bato nyonso basangana na boyekoli.​—15/10, lokasa 17.

▫ Na meko nini baklisto basengeli komitungisa na likambo oyo ete biteni mosusu ya makila bizali kotyama kati na biloko mosusu ya kolya?

Baklisto basengeli komitungisa te bobele na kokanisaka to na nungunungu ya mpamba, mpe ata kati na makambo ya kotanga makomi mazali likoló na bilei to koluka koyeba bandimbola epai na baleki nyama esengeli komonisa mayele. Nzokande, soki eyebani ete, makila mazali kosalelama mbala mingi​—ezala kati na bilei to kati na nkisi—​tosengeli kozala na ekateli ya kotosa mobeko na Nzambe molali komibatela na makila. (Misala 15:28, 29)​—15/10, nkasa 30, 31.

▫ Lolenge nini bozindo ya makambo ya elimo mazwamaki na myango ya koteya na Yisraele emonani polele kati na mokanda ya Masese?

Mokanda wana emonisi ete mokano na yango ezalaki mpo na kolakisa baoyo “bazangi mayele” makambo ya ntina mingi, lokola bwanya, toli, mpe mpamela, mayele, bososoli, bosembo, bokɛngi, boyebi, mpe makoki ya kokanisa​—nyonso wana kati na “kabanga Jéhovah.” (Masese 1:1-7; 2:1-14)​—1/11, lokasa 12.

▫ Likanisi nini ya bokatikati na ntina etali kelasi bilenge baklisto basengeli kozala na yango lelo?

Baklisto basengeli kotalela kelasi lokola mwango moko malamu. Na mikolo oyo ya nsuka, mokano na bango ezali ya kosala nyonso ekoki na bango mpo na kosalela Jéhovah na mosala ya pionnier.​—1/11, lokasa 18.

▫ Mpo na nini Jéhovah asengaki ete Bayisraele bafuta ndambo na zomi?

Ya liboso, mpo ete bakoka komonisa polele batondi na bango mpo na malamu ya Jéhovah. Ya mibale, mpo bakoka kosunga Balevite, baoyo basengelaki komipesa mobimba na mikumba na bango oyo esangisaki mpe kolakisa Mibeko. (Tala 2 Ntango 17:7-9.)​—1/12, lokasa 9.

▫ Ndambo na zomi oyo baklisto babyangami na kopesa ezali nini? (Malaki 3:10)

Ndambo na zomi elimboli eteni na biloko oyo ezali ya biso mpe oyo tozali kopesa na Jéhovah, to oyo tozali kosalela kati na mosala na ye. Ezali elembo ya bolingo na biso mpo na ye mpe emonisi bososoli na biso ya kozala bato na ye.​—1/12, lokasa 15.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto