“Lokola nkosi azali konguluma”
ONDIMAKA ete Satana azali? Lelo oyo ebele na bato bandimaka yango te. Na makanisi na bango ezali komonana ete “eyokani na science te.” Kala, na 1911, mokanda Encyclopœdia Britannica elobaki ete: “Science esili kolimbola makambo mingi na libanda mpe na kati ya bomoi na moto, na motindo boye ete esika ezali lisusu te mpo na misala ya Satana.” Bateolojié bazali koloba ete Satana azali elembo, lisapo. Mokanda The World Book Encyclopedia elobi ete: “Bateolojié mingi ya ntango na biso bazali kotalela Diable lokola elembo ya nguya ya mabe, ya bizaleli ya mabe ya libota ya bato.”
Nzokande, makambo mazali komonisa nini? Soki ondimaka Biblia, osengeli kondima ete Satana azali solo. Yesu andimaki bobele te ete azali, kasi abyangaki ye lisusu “nkolo ya mokili.” (Yoane 14:30) Ntóma Paulo abyangaki Satana “nzambe ya ebongiseli ya biloko oyo.” (2 Bakolinti 4:4) Mpe ntóma ya mobange Yoane alobaki ete: “Mokili mobimba ezali kolala na ngambo na oyo mabe.”—1 Yoane 5:19.
Soki ozali na likanisi lolenge moko na Yoane te, kanisa makambo maleki kala mingi te. Kanisa ba peloto ya koboma mpe monyoko lokola mwango ya biyangeli. Kanisa bitumba mpe kobomama ya ebele na bato oyo esalemaki na mikolo na biso. Mpe tokoloba nini na ntina ya mobulu oyo ezali kotondisa masolo ya bazulunalo-koboma bato mingi, kobebisa basi, kobomama oyo ezali kolandana, kosangana na bana na makasi, soki totangi bobele oyo wana? Nani mosusu akoki kozala nzambe ya mokili oyo soki Satana te?
Ntóma moklisto Petelo akebisaki ete: “Bolala mpongi te. Monguna na bino, Satana, lokola nkosi azali konguluma, azali kotambola, koluka soko akolya nani.” (1 Petelo 5:8) Soki batiki nkosi moko pembeni na yo, okobeta ntembe mpo na koyeba soki azali to te? To okokima mpo na komibomba?
Omindimisa solo ete Satana azali. Azali mabe mpe na mawa te, mpe aleki biso na nguya. Yango wana luka libateli epai na moto mosusu oyo aleki ye na nguya “Nkombo na Jéhovah ezali ndako molai. Moyengebene akokima kuna mpe akozwa libateli.” (Masese 18:10) Luka libateli penepene ya Jéhovah Nzambe, mpe yeba ete mosika te bato bakokangolama na bopusi ya oyo mabe, Satana. Ekozala mpenza kosikwama ya esengo!—Emoniseli 20:1-3.