Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/12 lok. 30
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Lisekwa ya Yesu esalemaki mpenza?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Yesu asekwaki na nzoto ya elimo to ya mosuni?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bato ebele bamoni ye liboso ya Pantekote
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • “Moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/12 lok. 30

Mituna na batangi

Matai 28:17 elimboli ete bantomá mosusu balandaki kobeta ntembe ntango molai nsima wana Yesu oyo asekwaki amonanaki na bango?

Te, tosengeli te kosukisa lolenge wana na ntina na Matai 28:16, 17 epai kuna totangi ete: “Bayekoli zomi na moko bakendaki na Galilai, na ngomba oyo Yesu alobaki na bango. Emoni bango ye bakumisi ye, nde basusu babetaki ntembe.”

Uta kala, Yesu alukaki kosalisa bayekoli na ye na kokanga ntina ete “esengelaki na ye kokende na Yelusaleme mpe koyoka mpasi mpo na makambo mingi epai na mikolo na mboka mpe banganga kapita mpe bakomeli, mpe kobomama, nde na mokɔlɔ ya misato akosekwisama.” (Matai 16:21) Nzokande, kokangama na ye mpe kobomama na ye elembisaki mpe ebulunganisaki bayekoli na ye. Emonani ete lisekwa na ye ezalaki likambo ya kokamwa. Ntango Yesu amimonisaki na ebandeli na nzoto ya bomoto, basusu “bazalaki naino na ntembe mpo na esɛngo.” (Luka 24:36-41) Kasi lokola amimonisaki mbala mingi nsima ya lisekwa na ye, yango esalisaki baoyo bazalaki kolanda ye ntango nyonso na kondima ete asekwaki sɔlɔ. Ata ntoma Toma andimisamaki ete Yesu asekwaki.​—Yoane 20:24-29.

Na nsima bantomá zomi na moko oyo ya sembo “bokendaki na Galilai.” (Matai 28:16; Yoane 21:1) Ezalaki na ntango yango nde Yesu “amonanaki epai na bandeko koleka nkama mitano na mbala moko.” (1 Bakolinti 15:6) Ezali ntango wana nde Matai 28:17 elobeli ete “basusu babetaki ntembe.” Na bango, baoyo bazalaki naino na ntembe bakokaki kozala kati na bayekoli wana 500.

Tala oyo C. T. Russell, prezida ya liboso ya la Société Watch Tower, akomaki na ntina ya likambo yango:

“Tosengeli kokanisa te ete moko na bantomá zomi na moko azalaki kati na baoyo babetaki ntembe, mpamba te bango bayebaki makambo nyonso malamu, bazalaki na kondima makasi, mpe bamonisaki yango liboso na maloba na bango. Baoyo babetaki ntembe basengelaki kozala kati na ‘bandeko nkama mitano’ baoyo bakutanaki na ye na libaku yango, baoyo bakutanaki na ye naino te uta asekwaki, kati na bango, tokoki kokanisa elei basusu bazalaki na kondima makasi te lokola bantoma mpe baninga na ye ya pembeni, baoyo basilaki kolobana na ye. Maloba oyo ete ‘basusu babetaki ntembe’ emonisi bosolo ya lisolo ya mokomi ya Evanzile. Yango emonisi biso lisusu ete bayekoli na Nkólo bazalaki na bindimandima te, kasi bazalaki kotalela bilembeteli malamumalamu, mpe na nsima, molende, makasi mpe elimo ya komipesa ya baoyo bandimaki emonisi biso bosembo ya bindimeli na bango na ntina na lisekwa na Nkolo, oyo bazalaki kotalela, motindo moko na biso, lokola moboko makasi ya kondima na biso epai na ye. Soki Klisto asekwaki te, kondima na biso ezali mpamba mpe tozali naino kati na masumu na biso.​—1 Kol. 15:17.”​—Zion’s Watch Tower and Herald of Christ’s Presence, 1er mai 1901, lokasa 152.

Toyeba ete lolenge oyo Matai alobeli likambo yango ezali komonisa biso bosolo mpe kolongobana ya Biblia. Soki moto amekaki kosala lisolo wana na ndenge na ye, mbele esengelaki na ye kobakisa makambo mosusu mpo ete bandima yango; mbele akokanisa ete kobosana makambo mosusu to komonisa ete eloko moko ezangaki, ekosala ete bosolo ya lisolo na ye etyamelama ntembe. Tokoloba boni mpo na Matai?

Amonaki ntina te ya kolimbola na mozindo mpo na nini “basusu babetaki ntembe.” Ezala Malako, Luka to Yoane, moko te alobeli likambo yango kati na lisolo na ye; na bongo, soki totaleli bobele lisolo ya Matai yango moko, ekoki komonana lokolo ete [kati na baoyo ‘babetaki ntembe’] esengeli kobakisa bantomá 11 oyo Matai azalaki moko na bango. Nzokande, Matai alobelaki likambo yango na mokuse kozanga kolimbola yango polele. Bambula soko 14 na nsima, ntomá Paulo akomaki mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti. Na kolalela oyo ye akomaki na 1 Bakolinti 15:6, tokoki kosukisa na koloba ete baoyo babetaki ntembe bazalaki bantomá te, kasi bayekoli oyo bazalaki na Galilai, baoyo Yesu amimonisaki naino epai na bango te. Na bongo, likanisi ya Matai oyo ete “basusu babetaki ntembe” ezali solo, eyokani na mosala ya mokomi na sembo oyo azali kolobela lisolo ya solo kozanga kolimbola likambo moko na moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto