Azwaki libonza
KIYOE, moyekoli mwasi azalaki na kelasi ya nsuka, mpe akomelaki filiale ya la Société Watch Tower ya mboka Japon, ete: “Nalongi mpo na bino.” Mpo na nini azali komonisa botondi? Mbala eleki, Kiyoe azwaki libonza na momekano moko ya ekólo mpo na kokoma malamu, oyo ebongisamaki na kompanyi moko ya Japon na nkombo Japan Traffic Safety Association. Libonza lileki monene ezali bongo kosala mobembo na mokili ya Suède.
Kiyoe atindaki mokanda ya botondi epai na la Société Watch Tower, oyo ezali konyata mikanda kitoko oyo misalisaki ye mingi mpo na kolonga. Longola momekano wana, azalaki mpe momonisi ya eteyelo na bango kati na mimekano mingi mosusu ya koloba mpe ya kokoma malamu. Alobaki ete: “Na mingi na mimekano yango, bazalaki kopesa motó ya likambo moko, mpe bana kelasi basengelaki kosala bolukiluki kati na biblioteke. Kasi, ngai nazalaki komimonisa mpasi wana te. Nazalaki kozwa makanisi kitoko kati na biblioteke ya ndako na biso!” Abakisi ete: “Ata moto ya likambo nini—bobangé mpe mikakatano na yango, ezingelo na biso, boyokani kati na mabota to bokoli ya moto na moto, mbala nyonso elobelami na mozindo kati na Mosenzeli to na Réveillez-vous!”
Nzokande, Kiyoe asalisamaki te bobele na mikanda wana. Alobi ete, na lisalisi ya mateya oyo azali kozwa na ebongiseli ya kolakisama ya ba Témoins de Jéhovah nde akólisaki makoki na ye ya kotánga mpe kokoma, likambo oyo lipesaki ye nzela na kolonga na mimekano. Alobaki ete: “Liboso, nazalaki kokanisa mpo na kotánga na université. Kasi epai wapi nakoki kozwa mateya motindo oyo?” Sikawa azali na mposa ya kosala mosala ya pionnier mpo na kosalisa bato mosusu ete bazwa litomba na kolakisama wana lokola ye. Ya solo, Kiyoe azali kosepela mpo ete azwaki libonza na momekano etali kokoma malamu, kasi mposa na ye monene ezali ya kozwa libonza ya bomoi.—Tala Bafilipi 3:14.