Esakweli oyo ezali kokokana
NTANGO bayekoli na ye batunaki ye elembo ya koya na ye kozanga komonana ntango akopesamela bokonzi, Yesu Klisto asakolaki ete: ‘Ezaleli ya kotyola mibeko ekomonana mingi.’ (Matai 24:3, 12) Esakweli wana ezali kokokisama na ntango na biso?
Ntembe ezali te. Mokanda The United Nations and Crime Prevention, ebimisamaki na O.N.U. na octobre 1991, elobi ete: “Mobulu ezali likambo oyo eleki makasi mpo na ebele na bikolo ya mokili. Mobulu kati na bandelo ya ekolo ekoki lisusu kosila te mpo na bikolo mingi, mpe mobulu na mokili mobimba ekoli mingi na boye ete ekoki kosila te kati na bato na mokili mobimba. . . . Mobulu mobongisami mozali kopalangana na lolenge ya nsomo, mpe makambo mazali kobima nsima na yango mazalaka mabe: minyoko na nzoto, makaneli, kanyaka ya basali na Leta. Botomboki to terrorisme esili koboma ebele na bato basali likambo te. Kotekisama ya ba drogues oyo ekomisaka bato baombo na yango esili kokoma likambo ya mawa na mokili mobimba. Bobebisi efandelo na bato na nko mpe na mobulu ezali kosalema na mitindo mingi mpe esili kokola kino kokoma lokola mobulu ya kotemela mokili yango moko.”
Kobeta bato: Bokoli monene longwa na bato 150 likoló na 100 000 babetamaki na 1970 kino bato 400 likoló na 100 000 babetamaki na 1990.
Moyibi: Bokoli ya koleka bato 1 000 likoló na na 100 000 na 1970 kino 3 500 likoló 100 000 na 1990.
Koboma bato na nko: Na mikili ya bobóla, bokoli ya bobomi bato kobanda 1 kino 2,5 likoló na 100 000 katikati na 1975 mpe 1985. Na mikili ya bozwi, bobele na eleko yango moko bokoli longwa na nse ya 3 kino koleka 3,5.
Mobulu mouti na drogue: Mokanda oyo touti kolobela elobi ete “Bituluku minene ya batekisi, bizali kobimisa mosolo koleka biyangeli ya bikolo ya mike mpe bizali na minduki koleka biyangeli yango; kino lelo bazali kokweisa bipekiseli mpe mibeko oyo ezali na mikili ya bozwi.”
Motuya mobimba ya mobulu: Bazali kokanisa ete ekobakisama mbala mibale, longwa na 4 000 likoló na bato 100 000 na 1985 kino pene na 8 000 na mobu 2 000.
Bokoli ya mobulu oyo ezali bipai nyonso ezali bobele moko na bilembo ya esakweli na Yesu oyo ezali komonisa ete tozali kobika na “nsuka ya ebongiseli ya ntango oyo.” (Matai 24:3) Yesu alobaki ete: “Wana ekomona bino makambo oyo kobima, boyeba ete Bokonzi na Nzambe ezali penepene.”—Luka 21:31.