Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/10 lok. 3
  • Libota libundisami!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libota libundisami!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Sɛkɛlɛ́ ezali nde mpo na kozala na bolamu na libota?
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Libota ebongiseli ya ntina mpo na bato!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mikakatano kati na libota—Elembo ya mikolo ya nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Tóluka kimya ya Nzambe kati na bomoi ya libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/10 lok. 3

Libota libundisami!

“Libota ezali ebongiseli ya bato oyo eumeli mingi koleka nyonso mosusu mpe, kati na makambo mingi, yango eleki na motuya. Ezali ebandeli ya bato nyonso. Bamboka ezalaki kobika mpo ete mabota mazalaki makasi, mpe mosusu ezalaki kokufa mpo ete mabota mazalaki makasi te.”

Ezali yango nde tozali kotanga kati na mokanda The World Book Encyclopedia, na 1973. Kasi, lelo, maloba oyo mazali na ndimbola moko makasi, oyo ezali mbala mosusu likebisi. Bambula oyo euti koleka, tomonaki makambo oyo mazali mpenza kobundisa bomoi ya libota. John Bradshaw, mopesi na toli oyo ayebani mingi, akomaki ete: “Lelo oyo, libota lizali na mpasi. . . . Ntalo monene ya mabala oyo masili kokufa, ya bilenge oyo bakomi batomboki bomeli drogue mpe kosangisa nzoto oyo ezali kosalema mingi kati na bato ya libota moko, mpasi mpo na kozwa bilei mpe mobulu kati na ndako, emonisi ete ezali na likambo moko oyo ezali kopesa mpasi.”

Ya solo, kati na mokili mobimba, tozali na “elembeteli emonisi ete ezali na likambo moko oyo ezali kopesa mpasi” kati na libota. Zulunalo The Unesco Courier elobaki na ntina na ezalela ya libota na mikili ya Mpótó, ete: “Uta 1965, tozali komona bokoli monene ya mabala oyo mazali kokufa kati na mikili nyonso ya Mpótó. . . . Mpo na yango, tozali komona kobakisama ya mabota oyo mazali bobele na tata to bobele na mama.” Mikakatano ya libota mizwi mpe bokóli mingi na mikili ya bobóla. Hélène Tremblay alobaki ete: “Mpo na bamilió na bato bauti na mabota oyo mazalaki makasi uta bikeke mingi kati na motindo ya bomoi bobongisami mpe bokobongwanaka te, eleko na biso ezali eleko oyo ezwi mobulungano moko monene.”

Lelo oyo, ezalela ya mabota ezali mpenza kopesa mawa mingi. Bobele na États-Unis, bamilió mingi na bana babɔkwami na tata to na mama oyo azali momeli na masanga. Mobulu kati na ndako ezali kokóla na motindo na kokamwa. Kati na mokanda na bango Intimate Violence, balukiluki Richard Gelles mpe Murray Straus bakomaki ete: “Lelo, okoki kobundisama, kobetama mpe kobomama epai mosusu te soko na moto mosusu te, kasi bobele na moko na bato ya libota na yo mpenza.”

Soki kobika ya mokili etali nde makasi ya mabota, esengeli bongo komitungisa mpenza mpo na yango na mikolo mizali koya. Kasi, ekoki kozala ete makambo makokwela mokili mazali mpenza lobanzo na yo te. Na ntembe te, oyo ezali mpenza kotungisa yo ezali nde bopusi oyo mobulungano wana ekoki kozala na yango likoló ya libota na yo. Ekosuka boni? Eyano epesami na mokanda moko mondimami ekoki kokamwisa yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto