Bayebaki nkombo ya Nzambe
MOKANDA ya liboso ya littérature oyo mokomamaki mpe mobimisamaki na mikili ya Amérika oyo miyangelamaki na Angleterre, ezalaki mokanda ya nzembo (Bay Psalm Book). Ebimeli na yango ya ebandeli enyatamaki na Stephen Daye na 1640, na golfe Massachussets oyo eyangelamaki. Mokanda wana ya liboso mozalaki kati na yango na mokanda ya Biblia, Nzembo, oyo ebongolamaki, longwa na Liebele kino na Lingelesi oyo ezalaki kokomama mpe kolobama na eleko wana.
Oyo emonisami mingi kati na mokanda wana ya Nzembo, ezali lolenge oyo nkombo ya Nzambe esalelami kati na ba versets mosusu. Na yango, uta eleko wana, ekokisi mibu 350 sikawa, bato nyonso oyo bazalaki kotanga mokanda yango bakokaki koyeba nkombo ya Mozalisi na biso. Na ndakisa, kati na ebimeli yango, Nzembo 83:17, 18 ezalaki kotangama ete: “Tika ete bazala kati na mobulungano mpe bakakatana libela: ee, tika ete bazala na nsɔni mpe babebisama! Mpo ete bato bayeba ete bobele yo, oyo azali na nkombo IEHOVAH, ozali Oyo-AIeki-Likoló na mokili mobimba kati na baoyo batombwami.”
Ya solo, Nzambe Oyo-Aleki-Likoló asɛngi biso toyeba ye koleka bobele boyebi mpamba ya nkombo na ye, Jéhovah (Iehovah). Kati na mokanda wana ya nzembo, Nzembo 1:1, 2 elobi ete “moto apambolami” akobilaka toli ya bato mabe te, kasi “akoluka esengo na ye kati na mibeko ya Jéhovah.” Ebimeli mosusu ya 1648 (libongoli New England Psalms) elobi ete: “Kasi kati na mibeko ya Jéhovah afandisi esengo na ye.”
Kati na Les Saintes Ecritures—Traduction du monde nouveau, ebimaki na ekeke ya ntuku mibale, mokapo oyo mobongolami ete: “Esengo na moto oyo aboyi kolanda toli ya bato mabe, mpe oyo atɛlɛmi te kati na nzela ya basali na masumu, mpe afandi esika ya basɛki te! Kasi esengo na ye ezali kati na mibeko ya Jéhovah, mpe akokanisaka mibeko na ye butu mpe moi.”
Mpo na kozala na esengo, esengeli kobwaka toli ya bato mabe. Esengeli te kolanda ndakisa ya basali na masumu mpe esengeli te kosangana esika moko na basɛki mabe. Kati na makambo mosusu, esengeli koboya kosangana elongo na baoyo bazali na batoli mpe na etamboli oyo ekoki kobenda moto ete asala pite, asalela drogue mpe asala makambo mosusu oyo mazali kobuka mibeko ya Nzambe. Na ntembe te, bolamu ya solo euti na koyeba Nzambe ya solo, nkombo na ye Jéhovah, mpe kotósa mibeko na ye oyo mimonisami kati na Biblia.