Mbuma oyo mopalanganisi moko ya nsango malamu ya solo asili kobuka
WILLIAM R. BROWN akendaki na Afrika mpo na mbula ya liboso na 1923. Elongo na mwasi na ye mpe na mwana na ye, ‘asalaki mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu’ na Gambie, na Ghana, na Libéria, na Nigéria mpe na Sierra Leone. (2 Timoté 4:5) Mbuma oyo mosala na ye ebotaki ezali ya kokamwa.
Mobali wana, ye moto ya bisanga ya Antilles, azalaki mosangani ya Lingomba na boklisto ya lokutá te mpe azalaki kosangana na makambo ya politike te. Kasi amekolaki Yesu mpe bantóma na ye na koyebisaka nkombo ya Jéhovah mpe bokonzi na ye, na kolimbolaka ntina ya lisiko mpe na kosakolaka nsango malamu ya Bakonzi. (Matai 9:35; 20:28; Yoane 17:4-6) William R. Brown azalaki kosalela Biblia mbala na mbala mpe azalaki kolakisa yango lokola moboko kati na makambo matali mateya mpe kondima. (2 Timoté 3:16) Azalaki mpenza kolobela ntango nyonso likanisi wana kino bapesaki ye nkombo Brown Biblia.
Na lisalisi ya lipamboli na Jéhovah, milona oyo Brown Biblia alónaki, ebimaki mpe ekolaki. Lelo oyo, kati na mikili epai kuna apasolaki nzela, pene na bato 200 000 ya Afrika basili kopesa bomoi na bango epai na Mozalisi na bango mpe, bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai na bato mosusu. (Matai 24:14; 1 Bakolinti 3:6-9) Baklisto yango ya molende bayebani malamu mpo na bosembo na bango mpe na ezaleli ebongi. Bazali na esengo ya kozala ba Témoins de Jéhovah mpe bato na Klisto, Mokonzi oyo azali koyangela.
Matomba oyo ya kobuka mbuma mazwami nsima na mosala ya kopalanganisa nsango malamu mosalemaki na moklisto oyo ya solo. Bobuki mbuma ya motindo moko ezali kosalema kati na mokili mobimba, na eteni nyonso ya mokili oyo bato bafandi. Kati na mikili 200, mibali mpe basi ya komikitisa koleka milió minei basili “kobukama” mpe epai na bato mosusu, bazali kozongela maloba ya anzelu mopalanganisi ya nsango malamu ete: “Bobanga Nzambe mpe bopesa ye nkembo, mpo ete ntango na kosambisa na ye eyei.” (Emoniseli 14:7, MN) Ya solo, mwango bobele moko ya kozwa elikya na ntango na biso oyo ya mobulu ezali ya komibalola epai na Nzambe mpe kondima boyangeli ya Bokonzi na ye.