Lokola bibengá bizali kopumbwa epai na ndako na yango
MBALA mosusu bibengá batangami na molongó ya bandeke ya liboso oyo moto abɔkɔlaki. Esili koleka bambula mingi, Baezipito batongaki bandako ya bibengá pene na bandako na bango, mpo na kozala na bilei na boumeli ya mobu. Mosuni ya bandeke wana ezalaki malamu mingi, mpe nyei na yango esalelamaki lokola malálela bakotyaka na miloná. Na Moyen-Age, kozala na bandako ya bibengá ezalaki likambo ya lokumu monene, oyo na mikili mosusu, bobele bazwi mpe bakonzi ya mangomba nde bazalaki na ndingisa ya kozala na yango.
Atako lelo oyo, bato bazali kolya misuni ya nsoso na esika na oyo ya bibengá, tozali kokuta naino bandako ya kala ya bibénga. Bandako ya bibengá oyo elakisami awa ezali na Ezipito.
Na mpokwa, lipata monene ya bandeke likozongaka mpo na kokita na ndako na yango. Mosakoli moebele Yisaya alobelaki yango na ntango atunaki motuna oyo ete: “Banani oyo bazali koya wana ezali bango kopumba lokola lipata, lokola bibengá epai na bandako na yango?” To lokola elobi yango libongoli mosusu: “Banani wana bakopumbwa lokola lipata, lokola bibengá bikozonga o ndako ya byango?”—Yisaya 60:8, Liloba lya Nzambe.
Ebele na bato oyo bakobangaka Nzambe bazali lelo koyanola motuna oyo na kokɔtáká na lisangá ya Jéhovah. Kati na ba Salles du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah, bazali koyekola kotya elikya epai na Nzambe. (Yisaya 60:9) Bazali mpenza komona bizaleli ya elimo kati na libota ya Nzambe, kondima ya solo mpe boyokani malamu kati na bandeko oyo ezali kopesa kimya mpe kobatelama, lokola oyo ebengá akozalaka na yango kati na ndako na ye.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.