Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/7 lok. 32
  • Oyo ezali ntango mpo na koluka Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyo ezali ntango mpo na koluka Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/7 lok. 32

Oyo ezali ntango mpo na koluka Nzambe

ELILINGI ezali na lokasa oyo emonisi Acropole, na Atɛne, oyo ezalaki esika na losambo ya ebele na banzambe mibali mpe banzambe basi na ntango na kala. Na nsé na Acropole, ngambo ya Ale ezalaki wana, esika elobami ete tribinale ezalaki liboso wana. Na esika yango nde ntóma Paulo asalaki diskur kitoko, esili koleka pene na mibu 2 000 sikawa. Tala makambo mosusu kati na oyo ye alobaki:

“Bobele na moto moko, [Nzambe] asali mabota na bato nyonso mpo na kofanda na etando nyonso ya mabelé, mpe asili kotya bileko mpe ndelo na bifandelo na [bato], mpo ete baluka Nzambe soko bakomama ye mpe soko bakozwana na ye mpenza, mpo ete azali mosika te na moko na moko na biso. Ya solo, ezali mpo na ye nde tozali na bomoi, mpe tokotambola, mpe tozali kobika.”​—Misala 17:26-28, MN.

Soki bato nyonso balandaki maloba na Paulo, Lisoló na bato lisengelaki kozala motindo mosusu. Soki bato bakangaki ntina ya likambo oyo bango basengeli koluka lokola bazali libota ya moto bobele moko oyo azalisamaki na Jéhovah, Nkolo Moyangeli monene, mbɛlɛ bitumba mpe mpasi mingi ebimeli bango te.

Lelo, mokili mobebi mpo na bolingo ya ekólo, na kokesena kati na ezalela ya makambo na bato, na koyina na ntina na mposa mpe na bokesene. Nzokande, maloba ya Paulo mazali ntango nyonso na ntina mingi. Biso nyonso touti bobele na moto oyo azalisamaki na Nzambe. Na yango, biso nyonso tozali bandeko basi mpe bandeko mibali. Mpe ntango eleki naino te mpo na koluka Nzambe awa tokoki naino kozwana na ye.

Maloba na Paulo mazali lisusu na ntina mingi soki totaleli maloba ya nsuka na diskur na ye. Alobi ete: “[Nzambe] asili kopona mokolo oyo asengeli kosambisa mabelé na boyengebene na nzela ya moto oyo ye asili kopona, kopesáká bato nyonso ndanga wana asekwisaki ye kati na bakufi.”

Lisekwa na Yesu ezali likambo lisalemaki, mpe lokola Paulo amonisi yango, ezali ndanga ete ekozala na mokolo na kosambisama mpo na bato. Ntango nini? Toyebi ete, ekómi mpenza pene na mibu 2 000 uta Paulo abimisaki maloba oyo na ngomba ya Ale. Ya solo, kokokana ya bisakweli ya Biblia emonisi ete ntango yango ebɛlɛmi mpenza. Yango ezali kopusa biso na kokanisa! Esengeli kosala nokinoki mpo na koluka Nzambe na bosembo nyonso, mpamba te, lokola Paulo alobaki yango epai na bato ya Atɛne, ete “azali kosakola na bato nyonso sikawa mpe na bisika nyonso, ete babongola motema.”​—Misala 17:30, 31, MN.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto