Bosɛngá mpe makámá epekisaki bango te
EZALAKI mokolo ya 2 janvier 1992. Epai wapi? Na Maxixe, kati na etuká ya Inhambane, na mboka Mozambique. Nokinoki, radio efungolamaki mpe asukisaki makɛlɛlɛ ya butu na Afrika. Mopanzi nsango ayebisaki ete: “Ba Témoins de Jéhovah bakosala assemblée na bango ‘Baninga na bonsomi’ na etúka na biso. Mokano na bango ezali mpo na koyekolisa bato lolenge nini kozwa bonsomi ya solo kati na mokili ya lelo. Baoyo nyonso balingi koyangana, bakozala bayei malamu.”
Nsango etambolaki na etúka wana ya Afrika etangwi mosika! Ba Témoins de Jéhovah basalaki assemblée de district mpo na mbala ya liboso, mpe bato 1 024 bayanganaki na yango. Mwa bambula liboso, likambo motindo wana likokaki kosalema polele te kati na mboka yango, mpamba te mosala ya ba Témoins de Jéhovah mopekisamaki. Olingi koyeba milende makasi misalemaki na baoyo bayanganaki na assemblée wana?
Lokola bitúka mingi misusu ya Afrika, etúka ya Inhambane ezali kitoko mingi. Masuwa ya bolɔbi mbisi matambwisami na bilamba minene babéngi voiles oyo ekangisami na matúmu misato, mpe masuwa yango makokani na mwa masuwa moke ya ba arabes, ekotambolaka wana. Nzeté na kokoti ezali bisika nyonso. Kasi likambo moko mabe libimi na mboka: etumba ya banamboka!
Mpo na baoyo bazali kolala na mwa ndako moke esalemi na mandalála, ezalaki likambo ya kokamwa te na kolamuka na ntɔngɔntɔngɔ na nkito ya mindoki makasi mibɛtamaki na bamboka ya penepene; bongo, etumba makasi esalemaki butu mobimba kati na zámba. Mbala mingi, ezali bato oyo bayebi likambo te nde bakozwaka makámá. Tozalaki ntango mosusu komona bana oyo bazokaki to mpe baoyo bakatani makolo wana ezalaki bango kotɛnguma. Ata ba Témoins de Jéhovah mosusu bazali na bilembo na bilongi na bango mpe na nzoto na bango, mpo na mobulu oyo bakutanaki na yango.
Kati na ezalela wana, assemblée “Baninga na bonsomi” esepelisaki mpenza baoyo nyonso bayanganaki na yango. Atako makámá wana balingaki kozwa na nzela, bituluku ya mabota mingi oyo bazalaki kosala mobémbo longwa na bamboka mike, bazwaki ekateli ya kokenda na assemblée. Mobémbo mozalaki mpe malamu te, mpo ete bato bazalaki komata bobele na nsima ya mituka minene oyo mizipamaki te. Ezalaki komema ntango mosusu kino bato 400 baoyo bafinanaki bobele na motuka moko! Mingi na mituka yango milandanaki, mpe mituka ya basodá oyo bamemaki mindoki ezalaki liboso mpe nsima mpo na kobatela yango.
Nora mpe bana na ye misato ya basi: moko azalaki na mbula moko, mosusu na mbula misato mpe mosusu azalaki na mbula motoba; bazalaki moko na mabota oyo bomoi na bango ezalaki na likámá na kosaláká mobémbo ya motindo wana. Nora abómbaki mbongo na boumeli ya basanza mingi mpo na mobémbo. Likambo oyo ete ndako moko te ebongisamaki mpo na assemblée, elɛmbisaki ye te. Nora mpe libota na ye, mpe ebele na bato mosusu, bazalaki kolamba, kolya mpe kolala bobele na esika assemblée esalemaki, epai ndako moko ezalaki te.
Ata molungé makasi molandamaki na bambula elongolaki te esengo ya bandeko oyo bazalaki kokabola limpati ya elimo. Bazalaki na mayoki oyo ete, eloko oyo ezalaki na ntina mingi mpo na bango ezalaki bobele kozala na assemblée wana. Bayangani nyonso oyo bamonisaki elembo ya komipesa na bango epai na Nzambe kati na mai ya mɔtɔ́ ya océan Indien, bazalaki bato 17. Na boumeli ya batisimo wana, ebele na bato oyo bayaki kotala yango na esengo, bapusamaki na koyemba nzembo mpo na kosanzola Jéhovah.
Etuluku wana ya basambeli basosolaki mpenza ndimbola ya kozala baninga na bonsomi bouti na Nzambe. Hans, oyo autaki na kapitale, Maputó, alobaki ete: “Touti komona ebandeli ya mosala ya ba Témoins de Jéhovah kati na eteni oyo ya mokili ya Afrika.”