Masoló ya basakoli na bokonzi
Bana kelasi na mokili ya Nigéria bapambolami mpo na bosembo na bango
NTOMA Paulo akomaki ete: “Soko ekokoka mpe lokola ezali likambo na bino, bozala na kimya elongo na bato nyonso.” (Baloma 12:18) Na Nigéria, bana ya ba Témoins de Jéhovah bazali kolanda toli oyo na kelasi, ata liboso na monyoko. Na ntina yango, Jéhovah apamboli bango.
◻ Molakisi moko azalaki koyina ba Témoins de Jéhovah. Na ntango ya likita moko na ntongo, asengaki na Batemwe nyonso ete baleka liboso mpe apesaki bango etinda ete bayemba loyembo ya ekolo. Baboyaki, na kolobaka ete balingi komonisa bokangami ya solo epai na Nzambe. Na bongo molakisi amemaki bango nyonso libanda mpe alobaki na bango ete bakata matiti. Na boumeli ya ntango yango, boyekoli mosusu bazalaki kolanda mateya.
Temwe moko ya mokolo amemelaki molakisi brochure L’école et les Témoins de Jéhovah, kolimbolelaka ye etelemelo ya bokatikati ya ba Témoins de Jéhovah. Kasi, molakisi aboyaki kosolola na ntina na likambo wana mpe aboyaki kozwa brochure. Na yango, abakisaki na mbala moko etumbu oyo epesamaki epai na bana.
Bilenge Batemwe balandaki kokanga motema mpo na etumba yango mpe balembaki te kokata matiti, ata na ntango oyo molakisi azalaki te. Mokolo moko, molakisi abombamaki mpe azalaki kotala bango, kozanga ete bamona ye, wana ezalaki bango kokoba mosala mpe koyemba banzembo ya Bakonzi. Likambo yango likamwisaki ye mpenza mpe alobaki na bango ete bazonga na kelasi, koyebisaka bokamwi na ye liboso na ezaleli na bango. Litomba nini emonanaki? Molakisi azali sikawa koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah!
Na ntembe te, bayekoli wana bapambolamaki mpo na bosembo na bango epai na Jéhovah mpe mitinda na ye.—Masese 10:22.
◻ Luta mpe baninga na ye bapambolamaki mpe mpo na bosembo na bango epai na lisengami oyo ya Jéhovah ete tozala “bato na mokili te.” (Yoane 17:16) Luta, ye oyo azali na mibu 18, abandaki mosala ya pionnier na mibu 12. Elongo na Batemwe mosusu, akutanaki na botemeli ya bakambi na eteyelo, mpo aboyaki koyemba loyembo ya ekolo. Molakisi moko asengaki ete akutana na baboti ya elenge mwasi. Baboti yango bapesaki ye bandimbola na lisalisi ya brochure L’école, likambo yango lisepelisaki ye mingi mpe atungisaki lisusu bayekoli te.
Nzokande, mokolo moko, molakisi moko ya mwasi ye moto ya Inde alingaki mpe apesaki etumbu epai na moko ya bilenge basi liboso ya kelasi mobimba mpo ete ayembaki te loyembo ya ekolo. Elenge mwasi yango alongisaki na mpiko nyonso kondima na ye, mpe molakisi amemaki ye epai ya directrice. Ntango bokomaki, elenge mwasi Temwe amonaki ete sous-directrice azalaki mpe wana. Na kokamwa na ye monene, directrice mpe molandi na ye babandaki koseka. Kotalaka epai na molakisi, directrice alobaki na ye ete: “Madame, komitungisa na yo te na ntina na bana basi oyo. Ata soki olingi koboma bango, bakolinga nde bakufa na esika ete bayemba loyembo ya ekolo. Oyoka naino lisolo na bango te?” Ye mpe molandi na ye balobaki bongo na ntina na kondima mpe na mpiko ya ba Témoins de Jéhovah. Kolobaka na elenge mwasi, directrice alobaki na ye ete ayoki mawa mpo na mokakatano oyo eyeli ye. Na nsima abakisaki: “Bolanda kokokisa misala na bino na kondima. Nasepelaka na lingomba na bino mpe na etemelo na bino ya mpiko ezala na kati to na libanda ya eteyelo.” Mikolo mingi na nsima, molakisi mwasi oyo abimisaki mikakatano asengaki lilimbisi epai na elenge mwasi Témoin de Jehovah mpe alobaki na ye ete ayebaki sikawa etelemelo ya bokatikati ya ba Témoins de Jéhovah.
Bana yango balandaki ndakisa na bilenge misato ya Baebele oyo baboyaki kotika bosembo na bango epai na Nzambe na koboyaka kongunzama liboso ya ekeko, mpe balandaki ndakisa na Danyele, oyo aboyaki kotika kobondela Jéhovah. Mibali wana bapambolamaki na Jéhovah mpo ete batikalaki sembo na mibeko na ye ya sembo.—Danyele mokapo 3 mpe mokapo 6.