Ndako epɛli mɔ́tɔ epusi na kosala programme ya batongi
“MƆ́TƆ! Mɔ́tɔ! Salle d’assemblées ya ba Témoins de Jéhovah epɛli mɔ́tɔ!” Mongóngo wana makasi mobimaki na nsima ya midi na vendredi moko ya octobre na mobu 1989, na engumba Heereven, na nord ya Pays-Bas.
Ba Témoins de Jéhovah bazalaki kosalela salle d’assemblée oyo kitoko uta mibu 11. Pene na wikende nyonso, mingi na bango bazalaki koyangana kati na yango mpo na assemblée de circonscription ya mikolo mibale, to mpo na assemblée spéciale ya mokolo moko. Ezalaki esika malamu mpo nakozwa malako ya Biblia.
Likámá moko lisalemaki na ntango bazalaki kobongisa nsamba ya salle. Ezalisaki salle yango bobele nsima ya mwa minite moke. Kasi likambo ya esengo mpenza, ata moto moko te azokaki.
Eyokaki bango mawa mpo na mosala wana mobebaki, nde balɛmbaki te, Batemwe bakanaki kotonga salle ya sika na esika mosusu. Bazwaki mabelé kitoko na engumba Swifterbant, kati na etuká ya Flevoland. Flevoland ezali mabelé monene makamatamaki, oyo mazwami na mai monene na kala na nkombo Zuiderzee, mpe ezali na nsé na bametele mitano longwa na nivo ya mai monene.
Na janvier 1991, babandaki botongi ya salle d’assemblée ya sika. Misala ya batongi misengelaki koumela kobanda sanza ya mai kino na septembre 1991. Ebele na Batemwe bakendaki kosala na esika yango na bolingo ya bango moko, mpe bilenge mibali mosusu bamonaki ete misala yango mizalaki nzela ya kosalela Jéhovah Nzambe ntango nyonso. Ebele na basali bautaki na Belgique mpe na Angleterre.
Ndako kitoko etongamaki. Salle monene ekabwani na esika oya bamelaka café na salle moko monene oyo, nsambá na yango esalemi na talatála. Ekoki kokɔtisa bato 1 008 mpe bayangani 230 mosusu bokoki kolanda programme na nzela na televizio kati na salle oyo ekangani na yango.
Lelo oyo, bato mingi bazali koloba ete: ‘Yakani, tobuta na ngambo na Jéhovah, mpe akolakisa biso banzela na ye.’ (Yisaya 2:2, 3) Salle d’assemblée wana ya sika ezali bobele moko na bisika mingi epai motindo na malako wana ya elimo mazali kopesama. Salle du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah ya mboka na yo ezali mpe esika mosusu. Okoyambama malamu kati na yango.