Tozali na mposa ete moto moko ayokamela biso
NA LOLENGE na biso bato, tozali komeka kozwa esengo mpe bosepeli kati na bomoi. Kasi na ntango mikakatano mikoyelaka biso, kozala na moto oyo tokoki koyebisa ye mikakatano na biso ezali likambo ya ntina mpe ya kolendisa.
Engebene monganga George Stevenson, “kosolola na bozindo elongo na moto moko mpo na mikakatano na biso, ezali kosalisa biso na kolongola mpasi na biso ya makanisi, na kotalela mitungisi na biso na lolenge malamu mpe mingi mpenza, na kososola nini tokoki kosala.” Monganga Rose Hilferding amonisi ete “biso nyonso tozali na mposa ya koyebisa mikakatano na biso epai na moto moko. Tozali na mposa ya kotyela moto moko motema. Tozali na mposa ya komiyoka ete tozali na moto oyo andimi koyoka biso mpe ayebi komitya na esika na biso.”
Ya solo, ata moto moko te akoki mpenza kokokisa mposa wana. Mpo ete bazali na ntango moke, mpe mpo na bantina mosusu, baninga na biso oyo toyebisaka makambo ya nkuku mbala mosusu bazali na ntango te wana tozali mpenza na mposa na bango; to mpe tokoki kokakatana mpo na kolobela makambo mosusu, ata epai na baninga na biso ya motema.
Nzokande, baklisto ya solo bazangi moto te oyo akoki koyoka bango na likebi nyonso, mpamba te nzela ya mabondeli ezali ntango nyonso polele. Mbala na mbala, Biblia ezali kolendisa biso na kobondela Nzambe, Mozalisi na biso, oyo abéngami nkombo Jéhovah. Elobi na biso ete tobondela na motema moko, na nkombo na Yesu mpe na boyokani na mokano na Nzambe. Ata makambo matali biso moko makoki kolobelama kati na mabondeli. Eyebisami na biso na Bafilipi 4:6, ete: “Na makambo nyonso, . . . boyebisa yango epai na Nzambe na malɔmbɔ na bino.” Oyo nde likabo monene! Nkolo moyangeli ya molóngó mobimba azali ntango nyonso pene mpo na koyamba mabondeli ya basaleli na ye oyo bazali na ezaleli ya komikitisa mbala na mbala oyo bazali na mposa ya kobɛlɛma epai na ye.—Nzembo 83:18; Matai 6:9-15; Yoane 14:13, 14; 1 Yoane 5:14.
Kasi Nzambe ayokaka mpenza? Bato mosusu bazali mbala mosusu komituna soki libondeli malamu litaleli te bobele makoki ya moto: moto akobongisaka makanisi na ye malamu wana ezali ye kobondela, mpe akomonisa yango na maloba. Esili ye komonisa likambo na ye, akoluka mwango malamu ya kosilisa yango mpe akondima nyonso ekoki kopesa ye nzela na kozwa yango. Na ntango alóngi kosilisa likambo na ye, mbala mosusu akotɔnda Nzambe mpo na yango, kasi ezali mpenza elimo ya moto wana mpe milende na ye nde epesaki nzela na kolónga likambo wana.
Ntalo monene na bato bazali kokanisa lelo ete, wana nde ezali mpenza ntina ya libondeli. Yo mpe okanisi bongo? Libondeli ezali bobele na nguya moke motindo wana? Mpo na kondimama na Nzambe, moto asengeli mpenza kosala milende na boyokani na mabondeli na ye, na makanisi mpe na nzoto na ye; yango ezali likambo ya ntina mingi. Kasi Nzambe azali na mokumba nini kati na likambo oyo? Ayokaka nde mabondeli na biso? Atalelaka mabondeli na biso ete mazali na motuya? Atalelaka mpenza lolenge oyo yango esalemi mpe andimaka yango?
Ezali likambo ya ntina na kozwa biyano na mituna oyo. Soki Nzambe akotyaka likebi na mabondeli na biso te, boye mabondeli mazali na bopusi bobele na mayoki mpe na makanisi. Nzokande, soki Nzambe ayokaka mokomoko na mabondeli na biso na likebi mpenza, boye tosengeli kotɔndo ye mpo na ebongiseli oyo. Tosengeli kopusama na kosalela yango mikolo nyonso.
Bongo, tosɛngi yo ete okóba botangi na yo, mpo ete mituna oyo milimbolami kati na lisoló lilandi.