Lingomba ya ‘kondima ezangi mibeko makasi’
“Makoki oyo lingomba ya ba mormons lizali na yango mpo na kondimama na mikili ya démocratie to na mikili miyangelami na bakonzi mabe, ezali mpenza kokamwisa.” Wana ezali maloba makomamaki na zulunalo The Wall Street Journal na ntango boyangeli ya mboka Hongrie endimaki Eglise de Jésus-Christ des saints des derniers jours (Lingomba na Yesu-Klisto ya basantu na mikolo ya nsuka). Ndenge nini Lingomba oyo likómaki na mokili yango? Engebene zulunalo The Wall Street Journal, “sekele ezali te bobele mpo ete ba mormons babotaka mingi to mpo na milende oyo bazali komonisa na kopalanganisa nsango malamu. Kasi ezali nde mpo na kondima na bango oyo ezangi mibeko makasi.” Lolenge nini?
Kolobáká na ntina na bambula oyo ezalaki liboso na mbongwana euti kosalema na makambo ya politike na mikili ya Europe de l’Est, zulunalo The Wall Street Journal eyebisi ete: “Na kosaleláká masangá ya babɛti miziki mpe bayembi nzembo ya mboka ya Université Brigham Young, ba mormons balongaki kopɛngola etumbu mpe lolenge oyo bamisionere baboyamaki mpo na kosalana boyokani na mikili mingi ya communisme.” Masangá na bango wana ya bayembi ekendaki na Roumanie, na Tchécoslovaquie, na Hongrie, na Pologne, na Russie, na Chine mpe lisusu na Arabie saoudite, na Libye, na Jordanie, na Somalie mpe na Israël. Lisusu, “bozwi ya Lingomba ya ba mormons ezali moko na makambo mapesaki nzela ete lingomba yango likɔta na mikili oyo ebyangami ete ya marxisme mpe na mikili ya bobólá mingi.” Kotonga ba barrages mpe kotimola mabulu ya mai, ezali bamoko na misala oyo ba mormons bapesaki lisungi na nzela na makabo na bango.
Na mokili ya lelo, oyo ezali na mposa mingi ya bisengo mpe mosolo, ezali likambo ya kokamwa te na komona ete bato mingi babendama na nzembo, na mabina, mpe na makabo ya mbongo. (2 Timoté 3:2, 4) Nzokande baoyo bakokani mpenza na bampate babendami nde na mongóngó na Yesu Klisto, Mobateli na mpate aleki malamu. (Yoane 10:27) Yango wana, ntango apesaki balandi na ye etinda ya ‘kozalisa bato na mabota nyonso bayekoli,’ alobaki te ete basala yango na nzela nyonso soki na lolenge nyonso, kasi na ‘kolakisáká bango ete batosa makambo nyonso maye ye alakisaki bango.’ (Matai 28:19, 20) Na kokokisáká mokumba oyo, mbébá moko ezali te na kotalela mitinda ya Biblia.