Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/3 lok. 32
  • “Témoins de Jéhovah?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Témoins de Jéhovah?”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/3 lok. 32

“Témoins de Jéhovah?”

MOTUNA oyo mozalaki titre ya lisoló moko libimaki kati na Bulletin de l’Université d’Helsinki, ebimisamaki na monoko ya Finnois. Na nsé na titre oyo, batyaki mokanda oyo molakisi Jorma Palo akomaki, ete: “Natalaki penepene mpenza cachet ya université na biso oyo etyamaki likoló na ezipeli ya Bulletin. Na katikati ya makomi oyo mazali na ndambo na likoló, namonaki likomi ya Liebele; natunaki ndimbola na yango epai na moko na bato oyo nabyangaki bango, ye wana azalaki Moyuda. Engebene moto wana na mayele, oyo ayebi Liebele, liloba wana ezali ‘Jéhovah’ na monɔkɔ ya Finnois.”

Lolenge oyo nkombo na Nzambe etyami na cachet ya université ya mboka Finlande ekamwisaki bato mosusu. Nzokande, université yango esili koumela mibu 350 mpe, na ntango yango esalemaki, nkombo na Jéhovah eyebanaki mingi mpe esalelamaki na mikili ya Mpótó. Nkombo wana ezali komonana mingi na bandako ya Leta, na paláta ya misolo mpe na ba cachets oyo esalemaki na eleko wana.​—Tala brochure Le nom divin qui demeure à jamais.

Na ntango na biso, boklisto ya lokutá eboyi mpenza kosalela nkombo ya Nzambe, mpe bato basili kobosana motuya oyo bazalaki kopesa na nkombo yango na ntango na kala. Bobele etuluku moko ya bato nde bazali kosalela nkombo ya Nzambe kati na losambo na bango mpe bazali koyebisa yango na mabelé mobimba, na boyokani na lilɔmbo ya yambo lizwami kati na libondeli ya Tata na Biso, ete: “Tata na biso [oyo azali] na makoló. Tika ete nkombo na yo ekumisama!” (Matai 6:9, MN) Yango wana, na ntango nkombo wana esosolamaki likoló na cachet ya université, mbala moko bato bakanisaki mpo na ba Témoins de Jéhovah.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto