Masoló ya basakoli na bokonzi
“Kobuka mbuma” na mokili ya Venezuela
Mokolo moko, Yesu akokisaki mosala ya kosakola na mosala ya kobuka mbuma. (Matai 9:36-38) Mokóló na elanga ezali Jéhovah Nzambe, mpe mbuma ezali mpenza na mabelé mobimba, kati na yango mpe bitúka ya mboka Venezuela, epai bakosakolaka mingi te.
Filiale ya la Société Watch Tower ya Venezuela eyibisi likambo lisalemaki na ntango etuluku moko ya baklisto basi ba Témoins de Jéhovah basakolaki kati na teritware ya Sabana Grande, kati na ekólo ya Guárico. Bayebisi ete: “Ndako oyo tosengelaki kofanda ebongaki mpenza mpo na kosala makita, nokinoki tobandaki kobyanga bato mpo na koyangana kati na yango. Bafandi na esika wana bayebaki ba Témoins de Jéhovah te.” Atako bituluku minei ya balakisi na Evangile ezalaki na engumba wana, bato bazalaki na mposa mpenza ya koyekola Biblia.
“Tosakolaki ngonga misato na ntɔngɔ mpe ngonga misato na nsima na nzanga, na ndako na ndako mpe tozalaki kobyanga bato ete bayangana na likita oyo lisengelaki kosalema lobi lolandaki na mpokwa. Lokola tozalaki na kiti te, tosɛngaki bango ete bamema bakiti na bango. Wana ngonga ya likita ebɛlɛmaki, bato babandaki kokóma mpe moto na moto amemaki kiti na ye. Nsima ne likita, tolobaki na bango ete, baoyo nyonso balingi koyekola Biblia kozanga kofuta mbongo, bakoki kopesa biso nkombo na bango. Bayangani 29 wana bandimaki kopesa nkombo na bango.
“Wana tozalaki kokanga ekuke na ntango moto ya nsuka kati na bango akendaki, tomonaki mibali misato na litúmu ya ndako. Wana tolingaki kolya soko na ngonga ya libwa na butu, babɛtɛlaki biso ekuke. Batunaki mwa mituna mingi, ete: ‘Kosakola nini oyo bozali kosala kati na engumba? Mpo na ntina nini bosalaki likita awa na mpokwa?’”
Totunaki soki tobukaki mobeko moko ya mboka. Bayanolaki ete te, mpe balobaki na biso ete bazalaki ba pasteurs ya mangomba misato ya Evanzile ya engumba wana. Batungisamaki lokola ndakonzambe na bango ezalaki na bato te na mpokwa wana. Tokɔtisaki bango mpe tolimbolaki bango mosala na biso. Tokabolaki mpe mikanda epai na bango mpe tosɛngaki bango ete bazonga na mokolo ya jeudi elandaki.
“Na mokolo yango, ba pasteurs wana bayaki elongo na bato 22 mosusu oyo balingaki koyoka makambo oyo tolingaki koloba. Ba pasteurs bakanisaki ete, lokola tozali basi, tozalaki na makoki te ya koloba lokola bango. Kasi engebene biso, likita lisalemaki malamu mpenza. Na nsuka, toyebisaki ete tosengelaki kokomisa nkombo ya baoyo bazalaki na mposa ya koyekola mingi Biblia. Ntalo monene ya bato oyo ba pasteurs bamemaki, bandimaki kokomisa nkombo na bango, mpe basusu nkutu balobaki ete balingaki kosangana na biso mpo na kosakola!”
“Tolimbolaki bango ete basengelaki kokóma na boyebi ya Biblia mpe kozwa mwa formation liboso na kosangana na biso kati na mosala yango. Mikolo nyonso, bato bazalaki koya na ndaka mpo na kosɛnga ete tolimbwela bango Biblia. Mbala mosusu, nsima na koloba kino na bangonga ya mpokwa, tozalaki kosɛnga bango ete bazonga na bandako. Na nsuka, tolongwaki na engumba yango. Baokaki mawa mingi mpe balobaki na biso ete na ntango tokozonga, bakosangana na biso kati na mosala ya kosakola. Balakaki ete nsima na mwa ntango, bakosala bokóli monene.”
Na ntango ba Témoins de Jéhovah balongwaki na etúká wana, bato 40 bandimaki koyekola Biblia. Nkombo na bango etindamaki na lisanga lizali pene, na ntáká ya bakilometele 50. Na nsima, ba Témoins ya engumba mosusu bakendaki kofanda kati na engumba wana, mpe etuluku ya basakoli na molende ya nsango malamu babongisamaki kati na yango.