Nini ekokómela bisika mosantu bibengami ete ya boklisto?
BABIMISI ya mokanda Les lieux saints de la chrétienté (angl.), ya archéologue Stewart Perowne, batuni motuna molandi: “Moklisto nani oyo, ata azali na bindimeli nini, akoboya kotɛlɛma likoló na ngomba ya Gologota esika ezali ndakonzambe Saint-Sépulcre na Yelusaleme, kozanga ete amonisa limemya ya mozindo? Ya solo, esika yango esambelami mpe oyo bato baweli yango uta bikeke mingi, ezali ntéi ya boklisto na mokili.”
Moto moko te asila kopesa elembeteli ete ndakonzambe yango etongamaki likoló na Gologota, epai oyo Yesu Klisto akufaki. Ya solo, liboso ete Constantin, mokonzi ya Loma, azwa ekateli ya kotonga ndakonzambe esika wana, tempelo moko ya bapakano ezalaki esika wana. Lisusu, Yesu alobaki ete: “Nzambe azali Elimo, mpe basambeli na ye basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24, MN) Basambeli motindo wana bakosambelaka bisika “mosantu” te.
Na eleko moko, tempelo ya Nzambe etongamaki na Yelusaleme, oyo ezalaki bongo centre ya losambo na peto. Kasi na ntina na kozanga bosembo ya bafandi na yango, Jéhovah Nzambe aboyaki engumba wana, lokola Yesu asakolaki yango. (Matai 23:37, 38) Yesu asakolaki lisusu kobebisama ya esika wana ya losambo, oyo bato mingi balandaki kotalela yango lokola esika mosantu. Maloba na ye makokanaki na mobu 70 ya ntango na biso, na ntango Baloma babebisaki Yelusaleme mpe tempelo na yango.—Matai 24:15, 21.
Mosika te, esakweli na Yesu ekokokana na monene na yango, likoló na lisangá ya mangomba na boklisto ya lokuta, oyo ekomitangaka ete ezali esika mosantu. Boklisto ya lokuta mpe bisika na yango mosantu ezali kokende na libebi likouta na nguya oyo eyini makambo na losambo, oyo ebéngami ete “eloko na mbindo ekoyeisa libebi.” (Danyele 11:31, MN) Ba Témoins de Jéhovah bakozala na esengo ya koyebisa yo makambo mingi likoló na lolenge oyo likambo wana monene likosalema.
[Elilingi na lokasa 32]
Kati na ndakonzambe Saint-Sépulcre
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.