Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/12 nk. 28-29
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Tótambola lokola bato balakisami na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Baboti, bozali kopesa ndakisa nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/12 nk. 28-29

Mituna na batangi

◼ Ezaleli nini baboti baklisto basengeli komonisa soki bana na bango bazali kotanga na eteyelo epai bana nyonso basengeli kolanda mateya ya lingomba?

Baklisto balingi te ete bana na bango báteyama na mangomba ya lokutá. Nzokande na bantango mosusu bana bakoki te koboya kokosa na mateya mosusu oyo kati na yango bazali kotekisa makambo ya mangomba ata soki basangani na milulu na mangomba ya lokuta te.

Mpo na makambo ya koteya bana, tozali na ndakisa moko kitoko epai na Abalayama, moninga na Jéhovah. Abokolaki libota na ye na mokili na Kanana, epai kuna ezalaki na mateya ya lokuta mpe na bizaleli ya “losambo” ya mbindo. (Tala Esode 34:11-15; Levitike 18:21-30; Deteronome 7:1-5, 25, 26; 18:9-14.) Kasi,Abalayama nde azalaki koteya makambo ya losambo epai na libota na ye. Nzambe andimisamaki ete “akolaka bana na ye mpe ndako na ye nsima na ye ete, babatela nzela na Jéhovah mpo na kosala na boyengebene mpe bosembo.’’​—Genese 18:19.

Yesu mpe, na bomwana na ye, ateyamaki na libota na ye mpe na lisangá. Mpo na yango “akolaki na mayele mpe na nzoto, mpe na boboto na miso na Nzambe mpe na bato.”​—Luka 2:52.

Na mikili mingi, bana baklisto bakendaka kelasi na biteyelo ya Leta. Mateya oyo mapesami mayokanaka ntango nyonso te na solo ya Biblia mpe nyonso te mazali na moboko likoló na makambo mandimami. Na ndakisa, ebele na bilenge baklisto balandaki, na boumeli na bokoli na bango na kelasi, mateya ya sianse to mpe biologie.Na yango bakutanaki na mateya ya evolution mpe na botaleli na yango ya ebandeli “ya mbalakaka” ya bomoi awa na mabele.

Atako bongo bilenge yango bakangamaki te na mateya ya évolution oyo elobi ete bobele biloko ya mosuni nde bizali. Mpo na nini? Mpo ete, na ndako mpe na makita ya boklisto, bazwaki litomba na mateya mabongi kati na Liloba na Nzambe, oyo esalisaki bango na “kolakisa esoswelo na bango kokabola kati na malamu mpe mabe.” (Baebele 5:14) Baboti mingi bayeisaki kondima na bana na bango makasi na kotalela elongo na bango bomonisi ya polele ya liteya ya evolution motindo elakisami na mokanda La vie: comment est-elle apparue? Evolution ou création?a Na kobongisama motindo yango, bana kelasi wana batalelaki makanisi mapesami na kelasi mpo na évolution lokola masengeli nyonso kondimama te. Nzokande na biyano na bango na ntango na mateya to na mimekano bamonisaki ete batyaki likebi na bingengiseli bazwaki. Basusu babakisaki bandimbola na lolenge ekeseni mpo na komonisa makambo na motindo moyebisami na Mozalisi na moto kati na Biblia.​—1 Petelo 3:15

Kasi, ezali boni sikawa mpo na mateya matali lingomba oyo eyebani mingi esika bofandi to mpe mangomba mosusu?

Tokoki mpenza kondima te ete liteya yango ekopesama lokola lisoló mpamba mpe ete ezali bobele mpo na kofulisa boyebi. Mbala mosusu molakisi azali na lingomba yango mpe azali komeka kozala na bopusi likoló na elimo mpe motema na banakelasi. Mpo na yango, ba Témoins de Jehovah balingi te ete bana na bango balanda mateya matali losambo ya mangomba. Boye ntango oyo ebongisami mpo na mateya yango ekoki kosalelama na motindo mokopesa litomba. lokola kosilisa badevuare ya mateya mosusu kati na esika ya boyekoli.

Eyebani mpe ete na bisika mosusu ndingisa ya koboya kokola na mateya ya losambo epesamaka te; eteyelo to bayangeli ya mboka batindaka ete liboso ya kozwa mapɔlɔmi banakelasi nyonso balanda mateya yango. Liloba moko na moko ekozwa ekateli mpo na etamboli ebongi na bango kolanda.

Basaleli mosusu ya Nzambe na ntango ya kala, ata bakanaki yango te, bakutanaki na makambo oyo kati na yango bamimonaki liboso na milulu to na mateya ya mangomba makeseni na bindimeli na bango, nzokande batikalaki sembo epai na Nzambe, Ekoki kozala ete Moize akutanaki na likambo yango. Abokolamaki lokola mwana na mwana mwasi na Farao ya Ezipito mpe “alakisamaki na mayele nyonso na Baezipito.” (Misala 7:20-22) “Mayele” wana esangisaki mbala mosusu mwa bindimeli mpe makambo ya losambo mazalaki na Ezipito na ntango wana. Kasi Moize abatelamaki na bobokoli malamu azwaki na libela na ye to mpe na Baebele mosusu.​—Esode 2:6-15; Baebele 11:23-26.

Tokoki mpe kokanisa na likambo na bilenge Baebele misato, baninga ya Danyele, baoyo bateyamaki na lolenge ya sipesiale mpe basalelamaki kati na boyangeli. (Danyele 1:6, 7) Bazalaki na makoki te ya kopona kondima to koboya ata eloko nini, Mokolo moko. mokonzi Nebukadanesala atindaki ete bayangana elongo na basali mosusu ya bokonzi na ye penepene na ekeko na wolo oyo alongisaki na esika polele ya Dula, epai bilakiseli ya bosembo epai na ekolo bisengelaki kosalema. Baebele yango misato basalaki nini? Tondimisami ete mbɛlɛ balingaki kopona kozala wana te. nde likoki ezalaki te.b Atako bongo batikalaki sembo na bindimeli mpe na Nzambe na bango Mozwi-na-Nguya nyonso, Lisosoli na bango ebokolami na Nzambe epesaki bango nzela ya kozala wana kasi na koboya makasi kosangana na lolenge nyonso ya milulu ya mangomba ya lokuta​—Danyele 3:1-18.

Wana banakelasi nyonso batindami ete bakola na mateya ya mangomba mpe bayekola mateya yango mpo na kolonga na momekano moko, bana na mabota ya baklisto bakoki kokola, lokola Baebele misato bakendaki mpo na libyangi na Nebukadanesala. Kasi bakolinga kotya Nzambe na esika ya liboso. Basengeli te kotemela maloba nyonso ya mabunga to mitindo nyonso mikeseni na Makomami, nzokande endimami na bamosusu, lolenge moko na Baebele misato oyo balukaki te kopekisa bato mosusu ete bafukamela ekeko ya wolo. Nzokande, bilenge baklisto bakolinga te kosangana na makambo ya kopesa losambo, na mabondeli ya etuluku, na banzembo ya mangomba to na mitindo misusu na lolenge yango.

Lisusu, bilenge yango basengeli kotya milende mpo na kozwa boyebi ya kolendisa na “Makomami mosantu, makoki kopesa . . . boyebi mpo na kobika na kondima kati na Klisto Yesu.” (2 Timoté 3:15) Na kozala na boyokani ya malamu elongo na bana na bango, baboti bakoyeba makambo mazali kati na mateya oyo bana bazali kolanda. Baklisto oyo bateli bakososola makambo nini masengeli kosembolama to kolimbolama polele na lisalisi na Biblia, mpo na kopengola ete elimo na bana ebulungana te to ezimbisama te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, lnc.

b Biblia elobi te soki Danyele azalaki na esika polele ya Dula. Ekoki kozala ete azwaki ndingisa ya kokende te mpo na etelemelo ya lokumu oyo azalaki na yango kati na bokonzi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto