Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/11 lok. 32
  • ‘Ntango nyonso mokanda yango mozali sé kolimwa’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Ntango nyonso mokanda yango mozali sé kolimwa’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/11 lok. 32

‘Ntango nyonso mokanda yango mozali sé kolimwa’

Ezali bongo nde molakisi moko ya mwasi na Sud ya californie, na États-Unis, alobaki na ntina na mokanda les jeunes s’interrogent Réponses pratiques. Mokolo na mokolo, eteyelo epai azalaki kolakisa esili kobongisa ntango moko mokolo na mokolo mpo na bozangi mikanda, na boumeli na yango bana ya kelasi bakoki kotanga mikanda oyo bango moko balingi kotanga. Molakisi wana ya mwasi akabolaki mikanda epai na bana ya kelasi oyo bamemaki eloko moko te mpo na kotanga kati na mikanda yango apesaki bango mpe mokanda Les jeunes s’interrogent.

Alimbolaki ete: “Bana kelasi bakómaki kosepela mingi na mokanda yango. Elimwaka mpo na bangonga mingi, ata na boumeli ya mokolo mobimba to mpe na boumeli ya mikolo mibale, nsima nde ezongi lisusu. Nazalaki koyoka bana kelasi kotuna baninga na bango ete: ‘Osili kotanga yango?’ to koloba ete: ‘Mokanda yango ezali mpenza malamu.’ Nsima na kolakisa moninga mwa likambo moko kati na mokanda, bazalaki lisusu kozongela botangi.

“Nkasa nyoso etondaki na masusa, mpe mokanda mobandaki kobeba. Mokapo oyo mobebaki mingi ezali mokapo 23, oyo ezali na motó na likambo ‘Kosangisa nzoto liboso na libala.’ Bana ya kelasi balingi bililingi ya mokanda mpe bazali komitala kati na makambo yango mamonisami na bililingi. Namonaki mwana ya kelasi mosusu azalaki kotanga mokapo oyo ete ‘Mpo na nini tata na mama babomaki libala?’

“Nsima ya mwa ntango moke, mokanda yango molimwaki; natyaki ekzamplere mosusu bobele na esika yango. Oyo ya liboso ezongaki, ekómaki mibale sikawa. Soki sanza misato to minei esili kokoka uta natyaki mokanda ya liboso, mpe kino lelo bana ya kelasi bazali sé kotanga mikanda nyonso mibale.”

Tala mwa ba titres kati na mikapo 39 ya mokanda yango: “Lolenge nini kozwa baninga malamu?” “Motuya nini napesaka na libanda ya nzoto?” mpe “Lolenge nini koyeba soki ezali mpenza bolingo ya solo?” Soki olingi kozwa mokanda yango, tuna na ba Témoins de Jéhovah ya mboka oyo yo ofandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto