Réveillez-vous! ezwili libonza na mokili ya Italia
Na mbula oyo euti koleka, elenge mwasi moko Moitalia ya mibu zomi, akomaki lisoló na kelasi na motó na likambo oyo ete: ‘Soki mabelé ekokaki koloba.” Akomaki yango lokola nde mabelé mazali kosolola elongo na mwana moko ya moko, oyo azalaki kotuna mpo na nini mabelé mazalaki kolela. Mwana ya kelasi ayebisi ete:
“Mabelé mayanolaki ete ebebisami na mipepe mpe na milinga oyo mizali kobebisa ezingelo. Mabelé alandaki koloba epai na mwana wana moke, mpe ayebisi ye ete mosika te, makambo makobongwana, mpe akokóma kitoko na mikolo mizali koya, ata soko moto akosala nini. Mabelé atii elikya na ye epai na Nzambe, Oyo-Aleki-Likoló, Mozalisi, oyo asalaki ye mpo na mpamba te, kasi mpo ete bato bafanda wana.—Yisaya 45:18.”
Elenge mwasi alandi koloba: “Nakutaki makanisi wana kati na Réveillez-vous! ya 22 Juillet, ya 8 Septembre mpe ya 22 Septembre 1989. Na lisalisi na yango nde lisoló oyo nakomaki lizwi libonza ya yambo. Libonza ya mibale lipesamaki epai na moninga ya kelasi oyo mama na ye azali kozwa bazulunalo mbala na mbala epai na mama na ngai. Azwaki makanisi bobele na banimero ya Réveillez-vous! oyo ngai nasalelaki.
“Natɔndi bino mingi mpo na boyebi kitoko oyo bozali kopesa biso yango, oyo ezali ya solo mpe ezali lisusu pɛtɛɛ mpo na kokanga yango, mpe ezali kosalisa biso na kokóma na mayele. Libonza yango lizalaki na ntalo ya 100 000 lires (soko 1 700 000 zaires), mpe natindeli bino mosolo yango mpo esalisa bino na konyata bazulunalo mingi mosusu.”
Ata ozali moto ya lingomba nini, tondimisami ete okozwa matomba mingi na botangi ya masoló kitoko oyo mazali kati na Réveillez—vous!
Soki olingi zulunalo yango, tuna na ba Témoins de Jéhovah ya mboka oyo yo ofandi.