Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/10 lok. 28
  • Sianse ekweisi nde makamwisi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sianse ekweisi nde makamwisi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/10 lok. 28

Sianse ekweisi nde makamwisi?

Makamwisi oyo malobelami kati na Biblia, masalemaki solo? Bato mingi bakondimaka te, kati na bango bato na sianse mpe bakonzi ya mangomba. Mpo na bango, makamwisi mandimamaki nde na eleko oyo bato bazalaki na biyambayamba mingi, mpe sianse na ntango na biso esili komonisa ete makambo motindo yango makoki kosalema te. Ezali ntina na kotalela mokanda oyo molandi, moye mobimisamaki na zulunalo The Times ya mboka Londres mpe motyamaki mabɔkɔ na ebele na bato ya sianse. Totangi ete:

“Tokoki kosalela sianse te mpo na kokweisa makamwisi. Kondima to mpe koboya kondima ete makamwisi makoki kosalema, etali likambo ya kondimela. . . . Makamwisi ezali makambo oyo masalemá naino liboso te. Atako makanisi nini mabimisami lelo na filozofi to matomba oyo mazwami na baankete, ebongi mpenza koloba ete sianse (oyo ekotalaka bobele makambo oyo masilá kosalema) elongi te kati na likambo oyo. ‘Malako’ na yango mauti bobele na makambo oyo biso tozali komona. Nzokande, kondima etongami likoló na miboko misusu.” (Biso nde tolalisi maloba oyo mazali likoló.) Na yango, sianse ya lelo ekoki te kokweisa masoló ya makamwisi oyo malobelami kati na Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto