Kondima na bango na liteya ya evolution esili kobunga
Na mbula oyo euti koleka, mobali moko na mboka Milwaukee, na Ekólo ya Wisconsin na Etats—Unis, atindaki mokanda oyo katina yango amonisaki botɔndi na ye “mpo na esaleli kitoko oyo ete mokanda La vie: comment est-elle apparue? Evolution ou création?” Ayebisi ete:
“Ekoki soko mbula mibale, nakutanaki na babalani mibale ya sika, bango bato ya engumba Pékin, na chine, mpe bazalaki kolanda kelasi ya monganga na mboka Milwaukee. Bango nyonso mibale bayekolaki Biochimie, mpe babombaki te mpo na kondima makasi oyo bazalaki na yango na liteya ya Evolution.
“Nazalaki mpenza na makoki te wana ezalaki ngai komeka kosolola elongo na bango mpo na makambo matali sianse, kasi nazwaki ekateli ya kotikela bango mokanda ete eloba na esika na ngai. Ntango tozalaki koyekola mokemoke kati na mokanda wana, namonaki kondima na bango likoló na liteya ya evolution, ebandaki koningana.”
Bayekolaki mokanda wana na mobimba na yango, mpe mobali wana ya mboka Milwaukee asukisi na maloba oyo, ete: “Biblia esili kokóma liziba ya boyebi ya solo mpo na bango. Natɔndi bino lisusu mpo na esaleli oyo kitoko.”
Soki olingi kozwa mokanda yango mozali na nkasa 256, tuna na ba Témoins de jéhovah ya mboka oyo yo ofandi.
[Bililingi na lokasa 32]
Lobɔkɔ na moto nde esali nsongɛ na mbanzi oyo
Eboké na biloko oyo babengi ete A.D.N. esalemi bobele yango moko?