Masoló ya basakoli na Bokonzi
Kosakola “ekangweli epai na bakangami” na Brézile
ELIMO na Jéhovah ezali komonisa nguya na yango epai na basaleli na Nzambe na Brésil, baoyo bazali kosakola nsango malamu ya kosikolama epai na bato bakangami na lingomba ya lokutá. (Yisaya 61:1, 2; Luka 4:18) Na 1947, ezalaki bobele na ba Témoins de Jéhovah 648 kati na mboka yango. Na 1967, motuya yango emataki kino na 41 548. Na lipamboli na Jéhovah, motuya ya basakoli ekómaki koleka 302 000, na ebandeli ya mobu 1991! Solo mpenza, ‘Nzambe asili kokólisa.‘ (1 Bakolinti 3:7) Bobele na mbula ya mosala 1990, bato 27 068 bazwi batisimo.
Likoló na bokóli wana, esengelaki sanza na sanza kosala circonscription ya sika, mpe bofungoli ya ba Salles du Royaume 150 ya sika esalemaki bobele na mobu wana moko. Lisusu, filiale esombaki mabelé mazalaki na bonene ya 180 hectares mpo na koyeisa ndako na binyateli monene, mpe ezali sikawa konyata Biblia na bamasini na yango moko. Na bongo, ba Témoins ya Brésil bazali kosala makasi mpo na kosalisa bato na mitema misokɛmi ete babima na ‘’Babilone Monene” liboso na “bolɔzi monene.”—Emoniseli 7:9,10, 14; 18:2, 4.
□ Elenge mosakoli moko na mibu mwambe atikaki mokanda epai na mwasi ya mokonzi ya la police; na nsima, ye moko azongaki kotala mwasi yango. Alingaki ete mwasi yango atangela ye mwa masoló oyo mazali kati na mokanda wana mpe alimbwela ye makambo oyo akangaki kati na lisoló moko na moko. Wana mwasi yango azalaki kolimbwela ye masoló yango, mwasi yango alingaki mingi lisusu mokanda wana mpe asengaki elenge mosakoli ete amema mama na ye. Ezali yango nde asalaki, mpe sikawa mwasi yango azali koyekola Biblia.
□ Na 1984, Maria alɛmbaki na ntina na bokósi oyo ye azalaki komona epai na bato, mpe azangaki elikya mpo na makambo nyonso oyo azalaki kotanga likoló na mpasi monene ezalaki na mokili. Aponaki lolenge na bomoi oyo babengi ete punk (bomoi na kosala mabe). Ayebisi ete: “Mokano na biso ezali ya kotɛmɛla makambo manso mpe bato banso. Libanda na nzoto na ngai ezalaki mpo na kookisa bato mosusu mpasi: bilamba mabe na langi ya moïndo, nakɔkɔlaki ndambo na nsuki ya motó na ngai. Nazalaki kotala mobali na ngai mpamba bana na ngai mpe ndako na ngai lokola. Nabandaki bongo komela marijuana mpe komela cocaïne mpo na kobosana makambo nyonso. Kasi namiyokaki lisusu malamu te likoló ya makambo wana. Ntango nazalaki kotanga Biblia, nazalaki kokanga ntina te. Nabondelaki Nzambe ete asalisa ngai.
Mokolo moko, ba Témoins mibale bayaki kotala ngai mpe, nsima na mwa lisoló mokuse, batikelaki ngai bazulunalo mibale. Na kofungolaká moko na yango, nakutaki lisolo ‘Etre indépendant de Dieu: pourquoi pas’ (Mpo na nini esengeli te kozala na elimo ya lipanda epai na Nzambe?),a oyo ebendaki likebi na ngai. Lisoló yango lisimbaki motema na ngai. Nazalaki na mayoki ete Nzambe ayokaki mabondeli na ngai, mpe bobele mokolo wana, ba Témoins babandaki boyekoli na Biblia elongo na ngai. Kobanda ntango wana, nabandaki kosala mabongwani Na ebandeli, mobali na ngai mpe libota na ngai baboyaki boyekoli wana, kasi emonaki bango mabongwani oyo nazalaki kosala kati na bomoi na ngai, balendisaki ngai ete nalanda koyekola. Sikawa, nazali Témoin na Nzambe oyo asili kozwa batisimo.”
Ba Témoins de Jéhovah ya Brézile, lokola mpe baoyo na mokili mobimba, bazali kosala na molende mpo na “kosakola kosikolama epai na bakangami.” Bato mingi bazali kosepela na kozwáká bonsomi ya solo mpe esengo ya kosalela Jéhovah.
[Maloba na nse ya lokasa]
a La Tour de Garde ya 1er Novembre 1985.
[Etanda na lokasa 30]
BRÉZILE
Motuya na bato na ekólo: 150 367 800
Motuya nyonso na basakoli na 1990: 293 466
Motuya na bato: mpo na mosakoli moko 512
Motuya ya baoyo bazwaki batisimo 1990: 27 068
Mwayene ya ba pionniers : 30 115
Motuya ya masangá: 4 625
Mwayene ya boyekoli na Biblia: 341 305
Motuya na bato bayanganaki na Ekaniseli: 790 926