Ndenge nini makilá ekoki kobikisa bomoi na yo?
Kozongisama makilá etalelamaki lokola nkisi oyo ekobimisaka makámá te, nde akobikisaka bomoi. Nzokande, monganga Alan Waldman alimboli ete: “Lolenge oyo bato bazalaki kotalela makilá ete ekobimisaka makámá te, ebongwanaki mbala moko wana bamonaki ete SIDA ezali kozwama na nzela na kozongisa makilá.”
Na solo mpenza, likámá ezali bobele SIDA te. Monganga Waldman ayebisi yango na maloba oyo ete: “Makambo mosusu ya ntina matindi na kokanisa ete kozongisama makilá ezali kobimisa makámá mingi mayebani te mpe oyo likoló na yango, mwango moko te mozali mpo na kobikisa yango. Lolenge na kosala lotalelamaki ete ezali malamu, lokola esalelo ya koluka komona nyama oyo ezali kobimisa maladi oyo babengi ete hépatite B, lelo oyo ebetelami ntembe.”—Diagnostics & clinical Testing, Juillet 1989.
Makilá ezali mpenza eloko oyo ekobimisaka makámá. Epai mosusu, ezali kokokisa mosala monene: ezali kobikisa bomoi. Ndenge nini makilá ekoki kobikisa bomoi na yo? Okosepela komona eyano oyo epesami kati na mokanda moke ya nkasa 32 oyo ezali na motó na likambo, comment le sang peut-il vous sauver la vie?
Soki olingi kozwa ekzamplere moko na yango, tuna ba Témoins de Jéhovah ya mboka oyo yo ofandi.