“L’humanité à la recherche de Dieu”
Motangi moko na Houston (Etats-Unis) akomaki ete, “Mokanda oyo mozali kitoko mpe ya kosepelisa na boye ete nakokaki kozwa ekateli te ya kotika yango.” Alobaki ete na mboka na ye bazali kokuta bato bazwami mpenza kati na mangomba nyonso oyo malobelami kati na mokanda wana, kasi andimaki ete: “Nazalaki koyeba bindimeli na bango ya moboko te mpe nazalaki koyeba te ndenge nini kobenda likebi na bango kati na Biblia mpo na kopesa bango biyano. Mokanda oyo ezali mpenza eyano na mabondeli na ngai.”
L‘humanité à la recherche de Dieu ezali mosala ya bozindo, mpenzampenza ya bolukiluki malamu, na ntina etali mangomba lokola hindouisme, bouddhisme, taoïsme, confucianisme, shinto, islam mpe judaïsme. Motangi yango amonisaki lisusu ete: “Mokanda yango mozali kolobela bindimeli ya bato mosusu na lolenge moko ya kolongobana mpe ya limemya, na kolendisaka bango mpenza na kolanda bolukiluki na bango mpo na koyeba Nzambe ya solo, Jehovah. Kozanga kotalela ete makanisi mamonisami na elobeli moko ya kitoko, lokola soki nde moto afandaki penepene na yo mpe kosolola na yo elongo.”
Tondimisami ete mokanda oyo ya bankasa 348, L’humanité à la recherche de Dieu, ekoyanola na mituna mingi oyo ozali komituna. Soki olingi kozwa moko na yango, ekoki na yo kotuna ba Témoins ya esika oyo yo ofandi.
[Bililingi na lokasa 32]
Chrétienté
lslam
Hindouisme
Confucianisme—Taoïsme—Bouddhisme
Buddhism
Shinto
judaïsme
Religion tribales