Nsango ya basakoli na Bokonzi
“Mokapo nyonso oyo azalaki kotanga esimbaki motema na ngai”
“MPAMBA te liloba na Nzambe lizali na bomoi mpe lizali koyokisa nguya na yango,” ndenge ntoma Paulo alobaki. (Baebele 4:12, MN) Yango emonanaki kati na likambo ya mwasi moko ya mokili Viêt Nam oyo abokwamaki kati na lingomba ya Buda. Tala lisolo ya bomoi na ye.
“Baboti na ngai, baoyo bazali naino na Viêt Nam, bazalaki basambeli na Buda ya nkombo mpamba. Nakolaki bongo kati na losambo ya Buda kino ntango nabalaki. Nazalaki na mibu 22. Libota ya mobali na ngai balingaki kobenda ngai na makasi ete nazwa batisimo engebene molulu na bakatolike. Ntina bamonisaki ezali oyo ete bokilo na ngai ya mwasi oyo akufaki akokaki kokende na likoló te mpo ete ngai nazalaki mosambeli ya Buda! Liboso naboyaki, kasi na nsima, nazwaki batisimo mpo na kosepelisa bango. Kati na motema na ngai mpenza nazalaki koyoka nsoni makasi, mpamba te nazalaki koyina bokosi oyo nazalaki komona kati na Lingomba ya katolike. Likeseni ezalaki te elongo na lingomba ya Buda. Mangomba nyonso mibale mazalaki komikotisa kati na bitumba mpe kati na politike, mpe nyonso mibale ezalaki kolendisa losambo na bonkoko.
“Soki natikalaki na Viêt Nam, mbele ezalaki mpasi mpo ete nayeba solo. Nakolaki na eleko moko oyo yikiyiki minene ya politike esalemaki kati na Viêt Nam mobimba ya Sudi, mpe nazalaki kolanda na engumba moko etangwi mosika mpenza na Saïgon. Ezalaki mpo na ngai lipamboli lokola nakimaki na Ostralia.
“Nazalaki kati na bato oyo bakimaki kobombama na mai baoyo babimaki kati na esengo mingi koleka. Na maboko na ngai nazalaki na bébé na ngai ya sanza mibale, esengelaki ete nakima kati na molili mpo ete nazwama te na maboko ya ba polisyé mpe nakola kati na mwa masuwa ya koloba mbisi. Nsima na mikolo motoba kati na ebale, tokomaki na Malaisie epai kuna toumelaki mwa basanza kati na camp moko ya bakimi liboso ya koya na Ostralia.
“Nazalaki na Ostralia uta mibu mibale na ndambo ntango nayebanaki na ba Témoins de Jehovah wana bazalaki kosakola ndako na ndako. Uta lisolo ya liboso, nandimaki boyekoli na Biblia mbala na mbala, mpamba te namonaki yango lokola libaku moko kitoko ya koyekola lingelesi Kasi ezalela ya Temwe mwasi oyo ayaki kotala ngai mpe solo oyo azalaki koteya ngai ebotaki makanisi malamu epai na ngai. Mokapo nyonso oyo azalaki kotanga esimbaki motema na ngai mpe elembo ya bokosi ozalaki komonana te kati na lisangá ya Jéhovah. Nsima na koyekola na boumeli ya mbula moko na ndambo, nakabaki bomoi na ngai epai na Jéhovah mpe nazwaki batisimo.
“Nasengeli koloba ete solo ebongolaki lolenge na ngai ya kotalela bomoi. Mobali na ngai azali mondimi te, kasi Jéhovah asalisaki ngai mpe asungaki ngai elongo na mwa libota na ngai ya moke. Azalaki mpenza Molakisi na ngai monene mpe ateyaki ngai lolenge nini kokoma mwasi malamu, mama malamu. Nakolemba soko moke te kotonda Jéhovah mpo ete asili kolongola ngai kati na molili ya elimo mpo na komema ngai na kongenga oyo ezali kouta na solo ya Biblia.”
Kati na likambo ya mwasi oyo, Liloba lipemami na Nzambe liyokisaki mpenza nguya na yango na kobotaka matomba kitoko. Na koyekolaka Biblia mpe na kosalelaka makambo oyo tozali koyekola, tozali kopesa ndimbola mpe ntina ya solo na bomoi na biso, mpe yango ekokamba biso na bomoi na seko kati na mokili ya sika oyo Nzambe asilaki kokana. Lokola elobaki yango Moïse, wana apemamaki ye na Nzambe, “ezali mpo na bino liloba lizangi motuya te. kasi elimboli bomoi na bino.’’—Deteronome 32:47.