Bayebaki te ete ntango esili koleka!
MOBU: 609 liboso na ntango na biso. Esika: Yelusaleme. Moto oyo azalaki koloba: Mosakoli Yilimia. Azalaki kosakola kobomama ya engumba na ye oyo alingaki mingi, Yelusaleme, engumba mosantu. Kobomama wana esengelaki koya mpamba te Bayuda batikaki Jéhovah mpe bamikotisaki mpenza na losambo ya banzambe na lokuta. Kuna na bisika ya likoló, bazalaki komipesa na losambo na mbindo ya pite, bazalaki kopesa mabonza epai na banzambe ya bapakano, bazalaki kosambela moi, sanza, minzoto, bazalaki kotumba mpaka na malasi mpo na Baala mpe bazalaki kokaba bana na bango lokola mbeka epai na Moleke.—1 Mikonzi 14:23, 24; Yilimia 6:15; 7:31; 8:2; 32:29, 34, 35; Ezekiele 8:7-17.
Yilimia azalaki komonana na miso na bango lokola mosakoli na mpasi, moto oyo alekisi ndelo na makambo na ye, moto oyo aboyi makambo nyonso mpe bato nyonso. Na boumeli ya mibu 38 Yilimia akebisaki bango; na boumeli ya mibu 38 bafandi na Yelusaleme bazalaki kotyola ye. Kino ntango wana, libota na Yisraele bazalaki kotya ata likebi moke te epai na Jéhovah, bazalaki kokanisa ete azali na nguya te oyo basengelaki komitungisa mpo na yango. Bazalaki koloba ete: “Jéhovah akosala malamu te mpe akosala mabe te”; “Jéhovah asili kotika mokili oyo, mpe Jéhovah [azali komona] te.”—Sofoni 1:12; Ezekiele 9:9.
Mosakoli Yilimia mpe mosakoli Ezekiele basakolaki kobomama na Yelusaleme, kasi likambo moko te lisalemaki. Bayisraele basukisaki ete moko te kati na bimononeli yango ekokokana na eleko na bango, kolobaka ete: “Mikolo mibendami molai, mpe bimononeli nyonso bikomi mpamba.” Kasi eyano na Jéhovah ezalaki boye: “Mikolo nyonso mibelemi . . . Mpo ete ngai nazali jéhovah; ngai nakoloba, mpe liloba oyo ekoloba ngai ekosalama; ekoumela lisusu te; mpo ete na mikolo na yo, yo ndako na kotomboka, nakoloba liloba mpe nakosala yango.”—Ezekiele 12:22-25.
Na mobu 609 liboso ya ntango na biso, elaka ekokaki mpo na Jéhovah ete akokisa liloba na ye. Nsima wana Yilimia autaki kosakola likebisi yango pene na mibu 40, engumba na Yelusaleme ezingamaki na mampinga ya Babilone. Sanza mwambe na nsima, lopango ekweisamaki, tempelo etumbamaki na móto mpe ndambo mingi na bato bakumbamaki na Babilone lokola baombo. Lokola bisakweli biyebisaki yango, engumba ebebisamaki na mopanga, na nzala mpe na maladi mabe.—2 Mikonzi 25:7-17; 2 Ntango 36:17-20; Yilimia 32:36; 52:12-20.
Yilimia alobaki solo. Baninga na ye bazalaki komikosa. Bayaki nde kosutuka na nsima! Emoniseli ezalaki mpo na mosika te. Esengelaki mpenza kokokisama na eleko na bango.
Makambo wana mazali bobele lisolo ya kala te. Makambo oyo masalemaki na Yelusaleme mazalaki na ndimbola ya esakweli. Yango ezalaki kosakola makambo makoya nsima. Na mikolo na biso, boklisto ya lokuta ezali kosalela nkombo na Klisto mpe ezali komikumisa ete ezali na boyokani ya kondimana elongo na Nzambe; nzokande ezali kotambola na kolandaka matambe na Yelusaleme ya kala. Yango nyonso, mangomba ya boklisto ya lokuta ezali koteya mateya na bapakano, ebebisami na mbindo ya pite, ezali kokotela politike mpe ezali kopesa maboko na bitumba ya mokili oyo. Ezali kondima liteya ya évolution, kopengolaka likanisi ya Nzambe Mozalisi, ezali kokanga miso likoló na kobomama na ebele ya bana kati na libumu na bamama na bango, bapesami lokola mbeka na etumbelo ya bisengo mpe mbala mingi ezali kondima bafilozofi ya bato, kolobaka ete Biblia ezali mokanda na masapo mpamba.
Lokola báfándi na Yelusaleme bazalaki koseka Yilimia, motindo moko mpe boklisto na lokuta ezali lelo koseka ba Témoins de Jéhovah. Ntango ba Témoins bazali kosakola kobomama oyo ezali koya na Armagedon, nsango na bango ezali kotyolama mpe etalelami lokola eloko mpamba. Boklisto na lokuta ezali koloba ete, ‘Nzambe azali kotala makambo na mabelé te. Azali bobele kotalela likoló, biso nde tokotalela mabelé. Ata soki Armagedon esengeli koya mpenza, ekozala na ntango na biso te. Lisolo wana, tosilá koyoka yango kala. Tokomitika kokosama te!’
Lisolo na bato likozongelama lisusu? Bamilió na bato bakoya nde kosutuka na nsima?