“Ezali na ntina mingi mpo na kotambwisa bomoi na biso ya mokolo na mokolo”
Maloba oyo mauti na mwasi moko Mokanadié oyo afandi na Toronto, matalelaki mikanda ya la Société Watch Tower. “Nazalaki na esengo mpo na kotanga yango mpe nakutaka masoló kitoko mpenza, maye makolendisaka, mpe mingi mpenza, masoló oyo ezali na ntina mingi mpo na kotambwisa bomoi na biso ya mokolo na mokolo.”
Abakisaki ete: “Atako nazali na diplôme ya Université, nasengeli kondima na nsoni mpenza ete nayebi makambo mingi na nzela ya mikanda na bino koleka oyo nayebaki na boumeli ya bambula oyo nalekisaki na kelasi. Nasepelaki mingi mpenza na mokanda Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo. Mokanda moko te mozalaki na bopusi makasi likoló na bomoi na ngai lokola mikanda wana; esalisi ngai mingi mpenza. Nasengeli kotondo bino mpo na yango.”
Mokanda oyo molobelami na mwasi wana Mokanadié, Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo, ezali kopesa batoli ya sikisiki na ntina na mikakatano mpe lolenge ya kozwa esengo kati na libala, lokola Nzambe alingi yango. Mpo na kozwa moko na yango, tuna na ba Témoins de Jéhovah ya mboka oyo yo ofandi.