Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/1 lok. 21
  • “Oyo ezali nzoto na ngai”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Oyo ezali nzoto na ngai”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • ‘Bósala boye mpo na kokanisa ngai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Elambo ya Nkolo ezali na ntina mingi mpo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bolei ya Mpokwa ya Nkolo—Molulu oyo ekumisaka Nzambe
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mpo na nini kokanisa Bolei ya mpokwa ya Nkolo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/1 lok. 21

“Oyo ezali nzoto na ngai”

“BOKAMATA, bolya, oyo nzoto na ngai.” (Matai 26:26)

Ezali na maloba wana nde Yesu Klisto apesaki limpa lizangi mfulu epai na bantoma na ye wana abandisaki Elambo na Nkolo. Alingaki koloba nini wana alobaki ete: “Oyo ezali nzoto na ngai?”

Ezali likambo monene mpo na bakatolike, mpamba te liteya ya mbongwana ya kominyo lizwi libandeli na yango kati na maloba na Yesu. Engebene liteya yango, na ntango bakatolike bakomelaka yango na molulu ya misa, kominyo ekómaka nzoto mpenza to mosuni na Klisto. Na bongo, bakondima te lolenge oyo Les Saintes Écritures—Traduction du monde nouveau ezali kobongola maloba wana na Yesu: “Bokamata, bolya. Oyo elakisi nzoto na ngai.” Libongoli oyo lizali komonisa ete limpa ezalaki bobele elilingi ya mosuni na Yesu, nzokande ezalaki mpenza mosuni na ye te. Kasi, wapi libongoli oyo lizali mpenza komonisa likanisi na Klisto?

Liloba na greke oyo libongolami na “ezali” to na “elakisi” ezali e·stinʹ. Ndimbola na yango ya yambo “ezali,” kasi ekoki mpe kolobela “ekokani na, elimboli.” Libongoli nini liyokani na mikapo ya zingazinga?

Kati na mokanda agrada Escritura, Texto y comentario por Profesores de la Compañía de Jesús, Nuevo Testamento I, bakuti note moko ya ntina mingi, na Matai 26:26, na Biblia ya Espanyole. Kati na yango totangi ete: ‘Soki batalelaki grammaire, mbele babongolaki yango na elimboli to mpe elakisi, na esika ya kobongola yango ete ezali​—mpo ete wana ekomonisa eloko yango moko mpenza. Kati na bandakisa mpo na kosalela liloba elakisi tokoki kotanga Genese 41:26; Ezekiele 5:5; Daniele 7:17; Luka 8:11; Matai 13:38; 16:18; Bagalatia 4:24; Emoniseli 1:20. Lokola emonisi yango mikanda misusu oyo bakomi na yango balongoli elobeli na ndakisa to na elilingi, mpe lolenge oyo Lingomba ya ebandeli bazalaki kososola yango, ndimbola ezali ([elimboli] ekokani na) yango nde emonani awa.’

Na kotalela grammaire, libongoli oyo ya katolike lizali koloba sembo, tokoki bongo kososola maloba na Yesu na ndenge mibale. Mpo na koloba polele, liloba na greke e·stinʹ libongolami epai mosusu na “elimboli” kati na Bible de Jérusalem, Biblia ya katolike. (Matai 12:7) Tokopona bongo libongoli nini kati na Matai 26:26? Lokola Yesu abimisaki maloba wana ntango azalaki naino na bomoi mpe na nzoto na ye ya kokoka, limpa oyo apesaki epai na bayekoli na ye ekokaki te kozala mosuni na ye na ndimbola ya solo. Lisusu, nzoto na ye ya moto na kokoka epesamaki mobimba na yango lokola mbeka mpo na lisiko. (Bakolose 1:21-23) Na yango, libongoli kitoko ya mokapo wana ezali ete: “Oyo elakisi nzoto na ngai.” Limpa lizangi mfulu ezalaki elilingi ya nzoto na Yesu, oyo asengelaki kopesa yango lokola mbeka mpo na bato.

Sikawa, soki Biblia na yo ezali kosalela liloba “oyo [ezali] nzoto na ngai,” osengeli kotungisama te. Mbala mingi Yesu asalelaki maloba motindo oyo. Wana alobaki ete, “ngai nazali ekuke” to “ngai nazali mowiti na solo,” moto te akanisaki ete azalaki mpenza ekuke to mowiti. (Yoane 10:7; 15:1) Mpe wana alekisaki kopo na vinyo epai na bayekoli na ye mpe alobaki ete: “Kopo oyo ezali kondimana na sika,” moto te akanisaki ete kopo yango ezalaki na polele mpenza, kondimana na sika. (Luka 22:20) Bobele bongo, wana elobaki ye ete limpa ‘ezalaki’ nzoto na ye, esengeli na biso kososola ete limpa ‘elakisaki’ to ‘ezalaki elilingi’ ya nzoto na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto