Tract moko efungoli nzela
TOZALI na mobu 1921. Na ngomba ya Transvaal, etuka ya Afrike ya Ngele, etuluku moko ya basali bazalaki kobongisa nzela ya engbunduka. Na pwasa, motambwisi ya etuluku, ye Moafrika na lomposo mpembe na nkombo Christiaan Venter, amonaki papier moko na nsé ya rail moko. Ezalaki tract oyo ebimisamaki na la Société Watch Tower.
Nsima na kosenga na bato na ye ete batelema, Christiaan atangaki tract na mposa mpenza. Akimaki mbango epai na bokiló na ye, Abraham Celliers, mpo na koyebisa ye na esengo mpenza ete: “Abraham, lelo oyo namoni solo!”
Mwa moke nsima, bakomaki mokanda epai na babimisi ya tract mpo na kozwa bandimbola ya sikisiki. Filiale ya la Société Watch Tower oyo ezali na Afrika ya Ngele, etindelaki bango mikanda mosusu mikolimbolaka Biblia. Mibali wana mibale bazalaki koyekola yango na ntango na kolya na ntongo, mpe na mpokwa kino na butu mpenza. Nokinoki, bakómaki koyebisa solo epai na baninga na bango mpe na bato mosusu.
Na nsuka, Christiaan mpe Abraham bakómaki ba Témoins oyo bamipesi epai na Jéhovah. Mingi na bato ya Afrike ya Ngele bayebaki solo mpo na molende mpe bosembo na bango. Epai mosusu, koleka bankámá ya bakitani na bango bazali lelo oyo ba Témoins de Jéhovah ya molende. Moko na bango azali kosala na biro monene ya ba Témoins de Jéhovah na Brooklyn, New York, mpe mosusu na babiro ya la Société Watch Tower oyo ezali na Afrike ya Ngele.
Na mikolo na biso, mwa mibu 70 na nsima, ba tracts ezali sé kokóba kokokisa mosala monene mpo na kopalangisa nsango ya Bokonzi.