Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/12 lok. 32
  • Masolo na Biblia oyo makosepelisaka bana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masolo na Biblia oyo makosepelisaka bana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/12 lok. 32

Masolo na Biblia oyo makosepelisaka bana

Mosangani ya Lingomba moko ya protestá na Porto Rico, atindelaki la Societé Watch Tower mokanda koyebisaka ete: “Nazali kolakisa Biblia epai na bana. Botala likambo oyo ekómelaki ngai na mobu mouti koleka.

“Tosilisaki kotanga mikanda oyo nazalaki kosalela mpo na kolakisa Biblia epai na bana, mpe namitunaki ete: ‘Nasengeli kosala nini sikawa?’ Wana nazalaki kotala biblioteke ya chambre na ngai, epai kuna nazali na ebele ya mikanda, namonaki mokanda moko ya jaune to mai-na-mosaka, na motó na likambo Mokanda mpo na masolo ya Biblia oyo nakanaki kozwa yango.

“Napupolaki yango, mpe nabandaki kosalela yango na mokolo ya lomingo nyonso kati na mateya na ngai. Bana basepelaki mingi na mokanda yango, mpe wana toutaki kosilisa mokapo ya liboso mposa na bango ezalaki ete tobanda mokapo mosusu. Litomba nini yango ebimisaki? Na nsuka na mbula, tosilisaki mokanda mobimba. Bana basepelaki mingi mpenza, mpe ngai nazalaki na botondi mingi. Ezali mokanda moko kitoko, emonisi makambo polele mpe sikisiki.”

Tokanisi ete yo mpe okolinga kozwa mokanda yango monene, oyo ezali na bililingi kitoko. Masolo ya Biblia 116 oyo mazali kati na yango, mazali kopesa motangi likanisi na liteya ya Biblia na mobimba na yango. Masolo yango matyami na molongó na kolanda ntango oyo likambo na likambo esalemaki. Okomona mpenza ete ezali na ntina mingi mpo na koyeba ntango nini likambo na likambo esalemaki. Soki olingi kozwa mokanda wana kitoko na nkasa 256, tuna na ba Témoins ya mboka epai yo ofandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto