Lolenge oyo Jehovah azali kokolisa mosala na ye
NA MIBU oyo miuti koleka, ba Témoins de Jéhovah bazwi bokóli monene mpenza. Nsima na mibu zomi, motuya ya masangá ekoli longwa na 42 600 kino 60 192 kati na mikili 212. Na komonáká bokóli wana, bamosusu bazali komituna ete: Ndenge nini mosolo mokopesamaka mpo na kotambwisa mosala ya ba Témoins de Jéhovah? Na nzela ya lisolo oyo, la Société Watch Tower azali na esengo na koyanola na motuna oyo mpe na mituna misusu misangani na yango.
Ba Témoins de Jéhovah bakopesa ndambo na zomi?
Te. Na Yisraele na kala, ndambo zomi etyamaki na mibeko na Moise mpo na kokokisa bamposa ya bato na levi mpe ya banganga, oyo bazalaki kosala na temple. (Mituya 18:21,24-29) Lokola bapesamelaki mabele te libanda na bingumba mosusu, lisungi na bango ezalaki likambo na kolekisa ndelo te. Lisusu, Bayisraele na sembo bazalaki mpe na likoki ya kopesa makabo ya bolingo malamu mpo na kokokisa mikano mosusu, botongi ya tabernakle mpe, nsima, oyo ya temple.—Exode 25:1-8; lntango 29:3-7.
Nzokande, Biblia elobi ete, na nzela na liwa na ye, Yesu “abebisi Mibeko ya malako malakami.” (Baefese 2:15; Bakolose 2:13, 14) Na maloba mosusu, na miso na Nzambe, ezala Bayuda to mpe baklisto bakangami lisusu na Mibeko te. Na yango, lolenge moko na masengami mosusu ya Mibeko, lokola kotumba mbeka mbala na mbala na temple, basembwi basengisamaki te na kopesa ndambo na zomi.
Ezali bolingo nde ekopusaka baklisto na kopesa makabo, kasi mibeko te. Ntoma Paulo alimbolaki likambo yango wana abongisaki kokongola makabo mpo na baklisto oyo bazalaki na bosenga na Yuda. Alobaki ete: “Moto na moto asala pelamoko motema na ye, na mposa moke te, mpe na kopusama te, mpamba te Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:7) Ezali lolenge wana ya kopesa makabo, oyo eyokani na Makomami, nde ba Témoins de Jéhovah bakosalaka.
Mpo na kozwa misolo, bosalelaka nde ba lotéries, bokongolaka mbongo, bolekalekaka na bandako na bato mpo na kosenga to mpe bosalelaka bandenge mosusu ekokani?
Te. Ezali na ntina te na kopusa to mpe kosalela bibongiseli mpo na kokosa baklisto ya solo, na kolakáká bango mbano mpo ete bapesa makabo. Mangomba oyo mazali kobongisa ba lotéries, ba tombolas, bafeti na foire, to oyo ekofutelaka bisika minene mpo na kosala misa mpe nsima kokongolo mbongo, emonisi ete bapesi te bilei malamu ya elimo epai na bandimi na bango, na boye elimo na Nzambe ezali kopusa bango te na kopesa makabo na mposa na bango moko. Tokoki mpe koloba lolenge moko epai na baoyo bazali na momeseno ya kala oyo ete, kopesa ndambo na zomi.—Matai 10:8.
Ndenge nini bozwaka misolo mpo na kotonga ba Salles du Royaume mpe bandako minene ya ba filiales, mpe mosolo oyo boyeisaki monene biro ekotamwisaka mosala ya ba Témoins na mokili mobimba oyo ezali na Brooklyn mpe na Patterson, na mokili ya New York?
Jéhovah akosopaka elimo na ye likoló na ba Témoins na ye, kopesaka bango nzela na “kosala malamu, na kozala bazwi na misala kitoko, na kozala bakabi, na kokaba biloko na motema malamu, komizweláká bongo lokola biloko na motuya, moboko kitoko mpo na ntango ekoya, ete bazwa bomoi na seko.” (1 Timoté 6:18, 19, MN) Elimo wana ezali kopusa ba Témoins de Jéhovah na kosunga mosala na Bokonzi na mitindo mikeseni.
Na ndakisa, na 1989, ba Témoins 3 787 188 ya mikili 212 balekisaki bangonga 835 426 538 na koteya Liloba na Nzambe. Na epai mosusu, batambwisaki boyekoli na Biblia 3 419 745. Baoyo bazali kosangana na mosala yango bakosalelaka misolo na bango moko mpo na kokokisa yango. Mosala yango masalamaki na bolingo mozwi mbano ya bato 263 855 bazwaki batisimo.
Ezali bobele elimo ya bokabi wana nde ezali kopusa ba Témoins mpe bato oyo bazali kosepela na solo ete basunga mosala yango na makabo. Bazali kopesa makabo bobele na masangá na bango te, kasi bazali kosunga lisusu mikano misusu mizali komonana ntina, lokola koyeisa monene to kotonga ba Salles du Royaume mpe ba Salles d’assemblées. Mpo na bokóli oyo bozali kosalema, esengeli kotonga ba Salles du Royaume mbula na mbula, oyo ekosenga ebele na mosolo mokokani na bankama na nkoto ya francs francais. Ba Témoins bakozwaka misolo wana na nzela ya makabo na bango ya bolingo malamu mpe na mosala na bango.
Epai mosusu, esengeli mpe koyeisa minene, to kotonga, bisika ya konyata mikanda, ba biro mpe bandako na kofanda na bamboka mingi mpo na kolónga kobakisama ya basali mpe bisaleli oyo bokoli ya lisangá ezali kosenga. Ezali lisusu makabo ya bolingo malamu mpe mosala ya ba Témoins nde epesi nzela na kosala botongi wana mpe koyeisa minene bandako oyo ezali na Brooklyn mpe na Patterson. Bisika nyonso epai nzela epesami, ba Témoins ya mboka yango bapesaka misolo mpo na misala mizali kokokisama wana. Kasi na makambo mosusu, la Société Watch Tower asili kozwa bibongiseli mpo ete ba filiales ezwa lisalisi ya bamboka mosusu na nzela ya makabo, na kotindáká bato bayebi mosala malamu. Na bongo, “nyonso ekabolami na bosembo epai na bato nyonso” na nsé na litambwisi ya la Société.—2 Bakolinti 8:14, MN.
Mpo na nini bozali ata na lopitalo te, kilinike mpe te, mpe mpo na nini bokokisaka te misala oyo mikosalisaka bato nyonso lokola ekosalaka mangomba mingi mosusu?
Wana bazali na makoki, ba Témoins de Jéhovah bakosalisaka nokinoki bato oyo bazwaka makama na bitumba to makama mauti na biloko na kozalisama. Mpo na koloba solo, mbala mingi bazalaka kati na bato ya liboso na kokóma na bisika motindo wana, komemáká bilei mpe bilamba mpe komipesáká na bolingo malamu mpo na misala ya kotongela bango bandako. Nzokande, ba Témoins de Jéhovah bazali ata na lopitalo te, ata na kilinike mpe te, mpe bakosalelaka bazimisi móto (pompiers)te to bapolisié mpe te, bato oyo bazali kosunga bomoi ya bato.
Bazali nde basali ya nsango malamu, baoyo mosala na bango ezali ya kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe na mokili mobimba lokola litatoli, liboso ete nsuka eya. (Matai 24:14) Lokola Yesu alobaki yango, mbuma na elanga eteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Tokoki bongo komilongisa te, na kotalela na bopotu mosala oyo ya ntina mingi mpo na kolekisa misala mosusu liboso, ata soko ezali malamu.—Matai 9:37, 38.
Ya solo, kati na ba Témoins de Jéhovah, ezali na mibali mpe basi oyo bazali minganga, ba infirmiers to basalisi na lopitalo. Kasi, bakotalelaka misala wana lokola misala oyo mobakisami nsima na mosala oyo bazali na yango liboso, mosala na boklisto.
Bamoko na bakambi to basangani ya la Société Watch Tower bamikómisi bazwi te na nzela na masini na bino oyo bokonyataka mikanda?
Soko moke te! Liboso na leta, la Société ezali kompanyi ya mobongo te. Moto te azali nkolo na yango, esangani na société mosusu mpe te, basali na yango bakozwaka mpe lifuti te. Basali nyonso bakosalaka na biro monene ya ba Témoins de Jéhovah, kati na bango prezida ya la Société mpe bakambi mosusu, basila kosimba ndai na bobólá. Bakoleisamaka mpe bafandi na bandako ya la Société, mpe bazwaka lisalisi na ntango babeli mpe bakozongisela bango mosolo oyo basalelaki mpo na makambo mosusu. Soki Témoin moko asengeli kosala mobembo mpo na matomba ya Société, mosolo nyonso asengeli kosalela na mobembo mokouta na la Société.
Na epai mosusu, na mokili mobimba, ekosalamaka te ete mosali moko asenga mbongo mpo na kosala feti ya libala, mpo na kosepela batisimo to mpo na molulu ya bokundi ebembe. Makita na biso mpe ba assemblées na biso ekofutamaka te, mpe tokokongoloko mbongo te.
Lokola bokongoloko mbongo te, ndenge nini masangá bazwaka mosolo mpo na kosala misala na yango?
Sanduku mike ya makabo etyamaka na Salles du Royaume mpo ete baoyo balingi bakoka kopesa makabo. (2 Mikonzi 12:9) Makabo nyonso makoyambamaka na esengo, ezala mike to minene. (Malako 12:42-44) Mbala moko na sanza, mosaleli oyo azali na mokumba ya comptes, akoyebisa na basangani ya lisangá motuya ya makabo mazwamaki, mosolo oyo masalelamaki mpe makabo mapesamaki na la Société mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba mpe misala misusu.
Lokola ebongiseli yango eyebani na bato banso, moto na moto azali na bonsomi ya kopesa makabo pelamoko motema na ye, mpe “engebene makoki na ye.” (1 Bakolinti 16:2, MN) Ezali yango nde ekosalemaka kati na masanga koleka 60 000 na mokili mobimba.
Na mokolo ya Pantekote, baklisto ya ekeke ya liboso batyaki biloko na bango nyonso na esika moko. Ba Témoins de Jéhovah mpe basalaka bongo?
Na Pantekote ya mobu 33, baklisto bakómaki na mposa monene esengaki kosilisama noki. Na yango, Bayuda oyo bautaki mosika, bandimaki boklisto, baoyo batikalaki na Yelusaleme mpo na kozwa malako mosusu na elimo. Bazalaki mpenza na mposa ya koyambama mpe koleisama na bandeko mosusu; yango wana baklisto ya Yelusaleme batekaki biloko na bango na bolingo malamu mpe batyaki misolo oyo bazwaki na esika moko mpo ete bakokisa bamposa ya bomoi na bango na kozalana elongo mpo na mwa ntango molai. (Misala 2:1, 38-47; 4:32-37) Moto te apusamaki na koteka to na kopesa biloko na ye. (Misala 5:1–4) Ezalaki kominizme te lokola ekokanisaka bamosusu, kasi ezalaki bobele ebongiseli ya mwa ntango, oyo esukaki wana baklisto yango bazongaki epai na bango.
Boteyaka ete kopesa makabo ezali motindo mosusu ya kolongola masumu?
Soko moke te! Totangi na Biblia ete: “Boyebi ete bosili kosikwa kati na bizaleli na bino na mpamba bilongwi na bankoko, na biloko bikopola lokola palata soko wolo te, kasi bosili kosikwa na makila na Yesu Klisto maleki nyonso motuya, lokola makila na mwana-na-mpate oyo na mpota te mpe na litónó te.”—1 Petelo 1:18, 19.
Ba Témoins de Jéhovah bazali na kondima kati na mbeka na lisiko epesamaki na Yesu oyo ekobikisa bango. Bakopesaka makabo na elikya te ete bazwa lobiko na nzela na yango. Kasi, bayebi ete esengeli kopesa mosolo mpo na kopalanganisa nsango malamu na ntina na mokili na sika molakami na Nzambe. (2 Petelo 3:13) Na epai mosusu, bazali kotalela lolenge wana na kosunga mosala oyo ya kosakola lokola libaku malamu oyo lipesameli bango na Jéhovah.
Nsima wana apesaki makabo mingi mpo na botongi temple oyo mwana na ye Salomo asengelaki kosala, mokonzi Davidi asalaki libondeli oyo ete: “E Jéhovah, epai na yo, monene ezali mpe nguya mpe nkembo mpe elonga mpe lokumu; mpamba te nyonso na likoló mpe na nsé, ezali na yo. . . . Kasi ngai nani mpe bato na ngai nini ete tokoka kopesa yo eloko na bolingo malamu na lolenge oyo? Mpamba te nyonso ekoutaka na yo mpe topesi yo bobele biloko na yo moko.”—1 Ntango 29:11, 14.
Na eleko na biso, ba Témoins de Jéhovah mpe bato mosusu oyo balingi boyengebene bazali na makanisi oyo elongo na Davidi. Bazali na esengo na kopesa makabo ya bolingo malamu mpo na kosunga mosala oyo motali kosanzola Jéhovah. Ezali lokumu mpo na bango, mpe bayebi ete nyonso oyo ekopesaka bango mpo na mosala na ye euti na ye. Jéhovah azali kopambola ezalela ya elimo na biso mpe yango wana azali kokólisa mosala na ye.
[Elilingi na lokasa 24]
Ndako mosusu mpo na mateya ya Biblia oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kotonga na Patterson, na mokili ya New York
[Bililingi na lokasa 25]
Jéhovah azali kokólisa mosala ya botongi
na lisalisi na makabo ya bolingo malamu mapesami na basaleli na ye