Etamboli oyo ezali kokembisa mateya na Nzambe
Na mikolo mileki, direction ya kompanyi ya caracas (Venezuela) etindaki mokanda moko epai na bankulutu mpe basaleli na misala ya lisangá moko ya ba Témoins de Jéhovah na regió yango. Mokokaki kotangama boye: “Tozwaki nsango oyo ezali kokumisa bino mingi mpo na koyeba kobatela mikumba mpe mpo na bosembo ya basangani na lingomba na bino. Ezali mpo na ntina yango toyebisi bino. Lokola na mikolo oyo tozali na bisika ya misala, tozali na mposa ya kozwa bato mibale nokinoki: motambwisi moko na motoka mpe mokonzi na kokengelaka biloko ya mangasini. Tokotonda bino mingi soki boyebisi yango na basangani na lisangá na bino to lisangá mosusu ya pembeni. Tolingi te kozwa na mosala moto oyo azali Temwe te. Tosengi na bino bozongisela biso eyano ata soki moto yango amonani te, mpamba te tozali kozela eyano na bino mpo na kozua likatami.”
Nsima na kokuta mokanda yango na nse ya porte ya Salle du Royaume, moko na bankulutu ya lisangá akendeki kokutana na nkolo kompanyi yango. Mobali yango asalaki elongo na ba Témoins de Jéhovah na boumeli ya mibu 15 mpe azwaki matata na Temwe moke te baoyo basali na ye. Azali komona bango lokola bato na bozito, bayebi kokokisa mikumba, bato na bosembo mpe bazali kokokisa mosala na bango na molende. Mpe abakisaki ete: “Nayebi ete bopesaka nzela na bato oyo basalaka mabe te, mpamba te bobimisaka bango. Yango emonisi ete lisangá na bino eboyi kosangana na bato motindo yango.”
Etamboli motindo yango ezali kokembisa mateya na Nzambe. (Tito 2:10) Etamboli yango ezali kobotama na mposa ya solo ya kolanda mpenza mitinda na etamboli malamu oyo mizali kati na Biblia.