Esalisaki na kelasi
Mokanda La vie: Comment est-elle apparue? Evolution ou création? esalisaki na eteyelo moko ya Kaliforni. Moyekoli moko ya mbula 11 alimboli ndenge yango esalisaki: “Ntango natangaki mokanda création, namonaki ete ezalaki na mikapo misusu oyo ezali kolobela molongo mpe minzoto. Nzokande, na eleko wana, molakisi azalaki koteya biso astronomie.
“Nakomaki bongo na lokasa mikapo oyo mikokaki kosepelisa ye, mpe napesaki ye mokanda yango. Ayebisaki ngai ata likambo te na boumeli na sanza mibale. Bongo mokolo mosusu, abandaki kolimbola biso lisolo ya big bang. Alobaki na biso ete ayekolaki mokanda moko mpe akendaki na biro na ye mpo na kozwa mokanda La vie: Comment est-elle apparue? Evolution ou création? Oyo nde esengo!
“Alobaki ete ezali mokanda eleki malamu na mikanda nyonso oyo asila kotanga. Nsima na yango afungolaki mpe alakisaki bililingi epai na bana kelasi. Namonaki ete asulinyaki eyano na motuna mokomoko oyo etunamaki na mokanda. Ntango mateya ezalaki kopesama, azalaki kofungola mokanda, azalaki kotanga paragrafe moko, mpe azalaki kolimbola yango. Na momekano, mituna mizwamaki se na mokanda yango. Nazalaki na mikakatano te mpo na kobongisa yango. . . . Nazwaki bapwe malamu mpenza.”
Tokanisi ete mokanda yango ekoki mpe kosalisa yo. Soko olingi kozwa yango, tuna na mosakoli oyo apesaki yo zulunalo oyo.