Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/7 lok. 31
  • Ekateli na mayele liboso na mawa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ekateli na mayele liboso na mawa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/7 lok. 31

Ekateli na mayele liboso na mawa

LOKOLA bana na ye bakomaki mikolo, Mary, oyo akomaki na ntango mingi, azwaki ekateli ya kosala bobele ndambo moko na mokolo. Kasi,ntango alobaki yango na Enos, mobali na ye, amonisaki ye ete azalaki na ntina moko ya kosala te. Alobaki ete “soki nalongaki kokokisa bamposa na yo mpe oyo na bana, nakoki mpe kolanda kosala yango bobele mpo na biso mibale”. Na esika ete andima mwasi na ye asala, apesaki ye toli ete atalela kati na libondeli likoki ya kozala pionnier, to mosakoli ya ntango nyonso.

Mary azalaki kosepela kosakola nsango ya Bokonzi epai na baninga na ye, kasi azalaki nsoninsoni mpe azalaki kolenga liboso na bato. Nzokande, alingaki kolanda toli ya mobali na ye. Na bongo, kokakatanaka na motema, abandaki mosala ya pionnier auxiliaire na Avril 1981.

Mary akolisaki nokinoki bolingo na mosala ya kosakola lokola azalaki na yango liboso te. Aumelaki te na kotambwisa boyekoli minei na Biblia na ndako ya bato oyo bamonisaki bosepeli. Bobele na boumeli ya mobu wana, akomaki pionnier permanent mpe abandaki boyekoli zomi ya Biblia. christine, Témoin de Jéhovah moko oyo azalaki na bana mibale oyo bazalaki na mibu ya kokota kelasi, akomaki na esengo nyonso moninga na ye ya mosala. Bato oyo bazalaki kosepela na Biblia uta mwa ntango babandaki kosangana na makita na Salle du Royaume epai kuna elimo malamu ya pionnier ekotaki. Mary ayokaki esengo mingi, ntango mwana na ye ya mobali, christopher, azwaki ekateli ya kolanda ndakisa na ye mpe kokoma pionnier ye mpe lokola.

Mpe, na mbalakaka, na 1985, ezalaki mawa monene. Mary akufaki. Kokatana ya mosisa moko oyo ekumbaka makila na moto ebimisaki makila mingi na boongo, mpe Mary akufaki nsima ya mikolo misato. Azalaki na mibu 45.

Na boumeli ya mibu minei oyo alekisaki kati na mosala ya pionnier, Mary azwaki lokumu mingi epai na bato ya zingazinga na ye. Bato koleka 300 bayaki na bokundami na ye, mpe kati na bango baninga mingi ya pembeni bazalaki wana. Moko na bango, oyo azalaki moninga ya kelasi mpe oyo kondima ya Mary esepelisaki ye mingi, alingaki koyeba makambo mingi koleka mpe asengaki boyekoli ya Biblia.

“Enos alobi ete, sikawa ngai moko nazali pionnier auxiliaire, kasi nazali koyoka mawa mpo ete nasalaki yango esika moko te na Mary ntango azalaki pionnier. Azalaki koyebisa ngai mikolo nyonso makambo akutanaki na yango na mosala na kosakola, mpe azalaki na esengo mingi! Ya solo, mwa ndambu na mibu wana mizalaki mpenza mibu ya kosepelisa mingi oyo tolekisaki elongo, ezali bobele sikawa nde nayei koyeba yango.”

Moto moko te akoki kokana ntango nini “makambo mpe makama ya mbalakaka” ebimaka, lokola yango oyo ebimaki mpo na likambo ya Mary. Nzokande, baoyo bazali kokoba kosakola Bokonzi na bosembo nyonso bazali komizwela lokumu malamu, ezala epai na Nzambe mpe epai na bato, atako liboso ya makama.​—Mosakoli 9:11; 11:1, 2.

[Bililingi na lokasa 31]

Ntango oyo elakisami na mosala na Nzambe esalelami malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto