“Miziki oyo ekobikisa na maladi”
Uta na Espanye, mwasi moko akomaki maloba oyo na filiale ya Alemanye ya la Société Watch Tower: “Nazali na botondi mingi mpe nakoki komipekisa te na kokomela bino mpo na koyebisa bino yango.” Mpo na nini mwasi yango azalaki na botondi mingi?
Mwasi yango alimboli boye: “Nafandi na Espanye uta pene na mibu 9, mpe esili kokoka mobu moko na ndambo wana bilenge ba Témoins de Jéhovah mibale babandaki koyekola Biblia elongo na ngai. Ntango natangaki lisolo moko oyo ezalaki kolobela miziki oyo ekobikisaka na maladi kati na Mosenzeli, nasengaki bango ete basombela ngai bakasete ya banzembo.”
“Nsima mwa moke, ntango nanyokwamaki na makanisi, nayokaki miziki yango. Oyo nde mbongwana! Na mbala moko, mpasi na ngai ekitaki, mpe namiyokaki malamu mpenza. Nazalaki na esengo mpenza lokola nazwaki bakasete yango! Kobanda ntango wana, nakomi bobele koyoka yango mbala na mbala na boumeli ya butu nyonso. Ezali mpenza miziki oyo ezali kobikisa.”
Mingi bakomi kosepela na Album Louons Jehovah par nos chants, oyo ezali na bakasete mwambe ya miziki oyo ebetami na piano. Soko olingi kozwa yango, tuna epai na ba Témoin de Jéhovah ya mboka na bino.