Bitika na nkembo na salomo
ENGEBENE mitango ya Biblia, mokonzi Salomo ayangelaki Yisraele longwa na mbu 1037 kino mobu 998 liboso ya ntango na biso. Kati na mokanda L’archéologie du pays d’lsraël (Angl.), profesere Yohanan Aharoni amonisi ete sivilizasió na Yisraele ekolaki malamu “na nzinganzinga ya mibu 1 000 liboso ya ntango na biso”.
Moko na bandakisa oyo ekangamaki na Aharoni ezali oyo ya bitika ya bingumba oyo bibatelamaki, oyo bitutu na yango etongamaki na mabanga minene oyo “ebongisamaki elongo na molai na yango to na lolenge ya molongosi mpe eyanganisamaki malamu mpenza.” Na kokesena, na bamboka oyo ezali pene na Yisraele, bitutu mingi “esalamaki na biliki mpe na mabaya.’’
Bakisa bandako na yango oyo etandamaki malamu mpe babalabala na yango oyo eyemamaki mpenza malamu, bingumba oyo bitongamaki lisusu na eleko ya Salomo ezali komonisa ebongiseli moko ya sikisiki. Aharoni atalelaki bitika ya “bingumba minei ya Yuda oyo etongamaki engebene etongelo ya moboko bobele moko. . . . Béer-Schéba, Tell Beit Mirsim, Beth-Schémesch mpe Mizpah”. Ekeseni mpenza na engumba mosusu monene: Ur, engumba ya kala ya Babilone. Na ntina na engumba yango, Sir Leonard Woolley akomaki boye: “Ata eloko moko te emonisi kobongisama ya engumba yango. . . . Balabala ezangi mabanga na nse, oyo mingi na yango ekangama, . . . ezalaki mobulungano oyo kati na yango moto akokaki mpenza kobunga.”
Aharoni alobi lisusu na ntina na kobongisama na biloko ya ndako na eleko ya boyangeli ya Salomo: “Bokoli ya sivilizasió . . . emonanaka se na biloko ya motuya te, kasi emonanaka lisusu mpenzampenza na lotulo. . . . Motindo na mbeki oyo bazalaki kosala mpe lolenge na kokaukisa yango ebongwanaki mingi mpenza . . . Na mbalakaka mbeki ndenge na ndenge emonanaki.”
Oyo elekaki mpenza monene na boyangeli ya Salomo ezali bongo kotongama ya temple na Yelusaleme, kotongama ya ndako ya mokonzi mpe ba biro ya mosala. Wolo mingi esalelamaki mpo na koyeisa bandako yango kitoko. (1 Mikonzi 7:47-51; 10:14-22.) Mbula mitano nsima na kufa ya Salomo, Sisake, Farao ya Ezipito, akotaki na Yelusaleme mpe azwaki biloko na yango nyonso ya motuya.—1 Mikonzi 14:25, 26.
Na Ezipito mpe na Palestine, biloko bikundolami bisili komonisa polele bankoma oyo ezali kondimisa ete Sisake alongaki mpenzampenza Yisraele, mpe bakomi mingi na Lisolo na bato bazali koloba ete, kokangama ya Yelusaleme etombolaki mpenza nkita ya Ezipito mpe epesaki nzela na Sisake na kopesa mosolo mingi mpo na kotongama ya temple moko na Ezipito oyo likoló na yango akomaki lisolo ya elonga na ye, lokola ezali bongo komonana na lokasa oyo. Mokonzi yango akufaki mwa moke nsima, mpe nkoma mosusu ezali kolobela ete mwana na ye ya mobali, apesaki likabo ya wolo mpe palata pene na 200 tonnes mpo na kotongama ya ba temples ya Ezipito. Nkoma emonisi te liziba ya bozwi yango, kasi kati na mokanda na ye Trésors des temps bibliques (Angl.), mokundoli na biloko na kala, Alan Millard apesi likanisi oyo ete, “ndambo monene ya wolo yango eutaki na temple mpe na ndako ya Salomo, oyo Sisake azwaki na Yelusaleme.”
Ezali bongo likambo ya kokamwa te na koyoka ete, ata bato oyo bandimaka Nzambe te bazali kondima lisolo ya boyangeli na nkembo na Salomo. Na ebandeli ya nkombo “Salomo”, Bolshaia sovetskia Entsiklopedia (Grande encyclopédie soviétique) elobi ete, Salomo azalaki mokonzi na Yuda mpe Yisraele, mpe ebakisi ete ayangelaki na ntango oyo “bokonzi yango ezalaki mpenza na nkembo na yango monene.”