Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/6 nk. 3-4
  • Bolukiluki mpo na kimya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolukiluki mpo na kimya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini mabe ekomi mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/6 nk. 3-4

Bolukiluki mpo na kimya

BAKONZI ya mokili mobimba bazali koluka mpenza kotya kimya. Bakonzi ya mangomba bazali kosenga yango na mabondeli na bango. Nzokande, mpo na bato mosusu, kimya ezali komonana bobele lokola ndoto mpamba. Tozwa ndakisa ya Ron, ye oyo azalaki kokende mosala na makolo na engumba moko monene ya Afrike du Sud, na Johannesburg.

“Mibali mitano bazingaki ngai, moko atyaki ngai mbeli na ye likolo na mongongo, mpe mosusu atyaki ngai oyo ya ye na mokongo Bakongolaki mabenga na ngai bobele na mwa ba secondes. Namiyokaki lokola nsoso oyo balongoli nsala. Baleki nzela basalaki lokola ete bazali komona likambo moko te.” Ron amekaki te kobundisa bango, mpe abikaki.

Bato mingi bazali sikawa kobanga mpo na kotambola na balabala ya bingumba minene. Bazali ntango nyonso kokanisa boye: “Ndenge nini nakoki kopengola likama ya kokutana na bato mabe? Bazali kosomba biloko na zando bobele mbangombango mpo ete bazonga na ndako, esika bakofanda kimya. Kasi kimya ezali kati na bandako? Mokanda La sécurité totale chez soi (Angl.) elobi boye: “Likama oyo ya komona moto moko koyela yo na ndako mpo na kozwa ndambo na biloko na yo na makasi to mpe biloko nyonso mpe kokima kozanga ete omona ye lisusu, ezali mpenzampenza kobakisama mbula na mbula.”

Na yango, bato bazali kokoma mayebisi liboso na bandako na bango mpo na kokebisa basali na mabe ete, bandako yango ezali na ba mbwa mabe to ekengelami na basoda oyo bazali na minduki. Kati na ba kartyé mingi, bafandi na yango basila koyokana mpo na kobengana basali na mabe. Zulunalo Security elobi boye: “Bobele na Angleterre mpamba, ezali na ba brigades de surveillance koleka 60 000 oyo kati na yango mabota 750 000 basangani. Momonisi moko ya assurances na Afrike alobaki boye: “Na ntina na kobakisama ya mabe, moto nyonso alingi bobele kozala na boyokani malamu elongo na bazalani na ye.”

Basangani ya ba brigades de surveillance bazali kokengela mpo na bolamu ya bamoko mpe bamosusu, mpe bazali koyebisa na la police makambo nyonso oyo makoki koyeisa likama epai na bato.a Kasi mokanda moko elobaki na mosangani moko ya brigade, oyo bayibaki biloko na ye, ete: “Likambo ya mawa mpenza, ebongiseli ya surveillance ezali kopesa ndanga te ete okoyibama lisusu te. Moko na bibongiseli wana ekoki te kopesa yo ndanga. . . . Osengeli bongo kotala malamu soko ete bikuke bikangami malamu, soko ete alarme etyami na prize mpe soko ete osili kozwa meko malamu ya komibatela.”

Atako ba brigades de surveillance ya kartye esili kozwa mwa elonga, tokoki komituna soko mpe yango esili kokitisa motuya ya mabe to te. Kati na mokanda na bango na titre, La police par le public (Angl.), Shapland mpe Vagg balimbolaki boye: “Oyo elobami lokola kokita na mobulu kati na esika moko ekozwa ‘elonga’ bobele soko mabe yango ezali moke to soko mabe ezangi kosalama ata mbala moko na bisika mosusu ya pembeni.” Mpamba te, kati na bingumba epai kuna ba brigades de surveillance ya kartye elobaki ete basili kozwa matomba malamu, kokola makasi ya mabe ezali se komonana kati na bisika mosusu ya bingumba yango, epai kuna ezali mpasi mpo na kotya bibongiseli motindo wana.

Mwasi moko sekretere ya association américaine ya sécurité oyo ezali na basangani koleka 20 000, alobi boye ete: “Kati na bisika mosusu, bokengeli ya bazalani ezali malamu mpenza te.” Alingaki bongo kolobela bisika minene oyo ezali “libanda ya bingumba epai kuna bazalani bakoki te kotalana moko na mosusu, mpe epai kuna motindo ya bokengeli wana ezali malamu mpenza te.” Totanga ndakisa ya babalani oyo balongwaki na engumba moko ya Etats-Unis mpo na kokende kofanda na elanga na bango oyo ezalaki na ba hectares 20, pene na mboka moko moke. Katikati ya mwa bambula, bayibaki bango biloko na ndako mbala mibale. Mwasi alobeli mayoki ya bafandi mingi na esika yango na maloba oyo: “Nazali komeka kozala na bomoi lokola bato nyonso kasi nazali kobanga . . . Nazali komiyoka ete nabatelami te.” Na mikili epai kuna matata ya politike ezali makasi, bafandi na bamboka bazali kotungisama mpo na mobulu mpe mbala mingi bazali kopusama na kokotela ngambo moko to ngambo mosusu.

Ezali komonana mingi ete ebele na bato bazali kokanisa ‘ntango malamu na kala’. Mokanda La montée du crime (Angl.) elobi ete: “Na ebandeli ya ekeke, likanisi ya bato nyonso ezalaki ete (mabe) ekokita.” Kasi, na esika ete ekita, nini emonanaki? Sir Leon Radzinowcz mpe Joan King bakomi boye: “Kati na mibu 20 ya liboso ya ekeke oyo, mpe ata na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mabe ezalaki mingi te, ezalaki kokola mbangu te koleka popilasio. Ezali na ntango na mpasi oyo ebimaki nsima na Etumba nde ezaleli moko oyo ebatelamaki uta kala, ebandaki komonana mingi. Na boumeli na mibu ya mibulungano na makambo ya nkita mpe na kozanga mosala, mpe na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, (mabe) ekolaki mpenza na ndenge ya nsomo. . . . Soko osali boyekoli na ntina na mabe na mokili mobimba, okomona mpenzampenza ete mabe yango ezali sé kopalangana mpe ezali kokola na bisika nyonso.”

Atako yango ezali kokamwisa bato mingi, na solo mpenza, ‘kokola ya kotyola mibeko’ esila kosakolama Makama minene oyo ezwaki bato uta ebandeli ya Etumba ya liboso ya mokili mobimba na 1914, esilaki kosakolama kati na Biblia. Yesu alobaki ete biloko mabe na ntango oyo ezalaki kobelema na nsuka na yango: “Mpamba te libota moko ekotelemela libota mosusu, mpe bokonzi moko ekotelemela bokonzi mosusu; nzala mpe koningana ya mabele ekozala na esika na esika . . . ; mpe mpo ete kotyola mibeko ekoyikana mingi, bolingo na bato mingi ekozwa mpio.”​—Matai 24:3, 7, 12 (MN); tala lisusu Luka 21:10, 11.

Yesu abakisaki ete: “Kasi, wana ekobanda makambo yango kobima, botelema alima mpe botombola mitó na bino, mpo ete lisiko na bino ebelemi.” Na yango, bantina ezali mpo na kozala na elikya. Mosika te kimya na mokili mobimba oyo bato bazali koluka, ekomonana.​—Luka 21:28-32,MN.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki basengi bango ete bazwi basangani ya brigade de surveillance, baklisto ya solo bazali na esengo ya komitika kotambwisama na mitinda oyo mizwami na Yisaya 2:2-4 mpe na Yoane 17:16.​—Tala Mosenzeli ya 15 Octobre 1984, nkasa 17 kino 20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto