Masolo ya basakoli ya Bokonzi
Litatoli ya mbalakaka eboti mbuma
MOKOLO MOKO, Yesu abandaki lisolo moko oyo epesaki ye nzela na kopesa litatoli ya mbalakaka, kasi yango ebotaki mbuma mingi’, alobaki na mosamarité moko ya mwasi, penepene na libulu ya mai ete: “Pesa ngai mai.” (Yoane 4:7) Biso mpe, tokoki kozwa matomba malamu soki tozali kosalela mabaku nyonso ya kopesa litatoli ya mbalakaka. Ezali yango nde Temwe moko asalaki na Australie. Abandisaki lisolo moko na kotalelaka texte du jour na banc moko oyo etyami mpo na moto nyonso kati na parc moko. Moto moko oyo azali na momeseno ya koluka koyeba makambo nyonso, amonaki mokanda oyo ye azalaki kotanga mpe ayebisaki ye ete asepelaka mingi na Makomami. Azali moto na katolike oyo akendaka ndakonzambe te. Bateyaki ye évolution kati na eteyelo moko ya katolike, mpe azalaki koyeba te likambo nini akoki kondima Temwe apesaki ye elaka ya komemela ye mokanda La vie—comment est-elle apparue?.a Lobi oyo elandaki, akendaki kotikela ye mokanda yango na biro na ye, kasi sekretere na ye ya mwasi ayebisaki ye ete patron na ye abimaki. Atako bongo, abotolaki ye nkutu mokanda na maboko, na kolobáká ete: “Tala mokanda oyo tozalaki kozela!”
Ngonga mibale na nsima, moto moko ya mombongo abiangaki Temwe na telefone ete azalaki na mposa ya komona ye. Moto yango asengaki ba ekzamplere mibale ya mokanda création mpe asengaki ye ete aleka na biro na ye. Temwe akendaki mpe akutaki ye mpe bato mosusu mibale. Abandaki boyekoli ya Biblia elongo na bango, elongo mpe na sekretere, mpe akamataki bibongiseli mpo na kotambwisa boyekoli yango mbala mibale na poso. Na boumeli ya baposo oyo elandaki, makango ya moto wana ya mombongo, ‘moklisto mwasi moko abotami sika’, atunaki mituna ya Biblia na kotindáká mokanda epai na Temwe. Nsuka na yango, asanganaki na boyekoli, na associé ya moto ya mombongo mpe lokola, mpe moninga na ye oyo azalaki kondima liteya ya évolution.
Bango nyonso bakobaki koyekola Biblia mbala na mbala na boumeli ya sanza mitano, boyekoli ya mibale oyo ezalaki kosalema poso nyonso ezalaki koleka kati na parc. Nsima na mwa basanza, associé ya moto ya mombongo mpe moninga na ye bakendaki na Etats-unis, epai kuna bakobaki koyekola. Mwa baposo na nsima, moto na mombongo akutanaki na moto moko oyo azalaki mopaya liboso na ye mpe atunaki ye soki nsuka ya masolo oyo mazalaki koleka kati na parc ezalaki nini. Ndenge emonanaki, moko yango azalaki na momeseno ya kolanda masolo na bango. Bibongiseli bikamatamaki mpo ete moto yango mpe abanda koyekola Biblia.
Litomba nini makambo nyonso wana ebimisaki? Sanza zomi na mwambe nsima na lisolo ya liboso kati na parc, moto na mombongo mpe makango na ye, moklisto mwasi ya kala oyo abotami sika’, babalanaki mpe bazwaki batisimo. Sekretere mpe makango na ye babalanaki mpe bazwaki batisimo. Assccié ya moto na mombongo mpe moninga na ye, oyo bakendaki na Etats-Unis, bazwaki mpe batisimo, mpe moko na bango azali sikawa kosala mbala na mbala mosala ya pionnier auxiliaire. Mpo na moto oyo azalaki koyoka masolo ya Biblia kati na parc, azali naino koyekola Biblia na irlande, epai kuna afandi sikawa, mpe azali kokana kozwa batisimo.
Nyonso wana esalamaki mpo ete Temwe moko asalelaki libaku ya bopemi na midi mpo na kopesa litatoli ya mbalakaka, mpe Jéhovah apambolaki milende na ye. Biso mpe, tosalela mabaku nyonso oyo mazali kopesamela biso mpo na koyebisa nsango malamu epai na baoyo bazali na mposa ya koyoka nsango ya Bokonzi na Jéhovah!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisamaki na la Société Watchtower.