Ekaniseli aya moto asengeli kozanga te
“Bosalaka boye mpo na ekaniseli na ngai.” Nkolo Yesu Klisto alobaki maloba oyo, makomami na Luka 22:19, na ntango oyo abandisaki ekaniseli ya liwa na ye. Ezali liwa na Yesu nde efungolaki epai na bato elikya ya bomoi na seko kati na paradis. Na bongo tosengeli kokundola liwa na ye. Okokanisa yango mobu oyo? Ba Témoins de Jehovah bazali kobianga yo na kosangana na bango elongo mpo na kokanisa molulu wana monene. Molulu ya Ekaniseli ekosalema nsima na kolala na moi, na date oyo ekokani na le 14 Nisan engebene manaka oyo elandaka sanza kati na Biblia. Koma date yango likolo ya manaka na yo mpo ete obosana yango te.
Ezali bongo Mardi 10 Avril 1990. Ba Témoins de jehovah ya mboka na bino bakoki koyebisa yo esika ya sikisiki mpe ngonga oyo likita yango ekosalema.